Leon XIV azali Papa ya sika
Conclave eponi episkopo ya Roma ya 267, episkopo ya lokumu Robert Francis Prevost. Nsango epesamaki liboso ya bato ebele na episkopo ya lokumu Dominique Mamberti, lelo mokolo ya minei ya 8 ya sanza ya mitano.
Nsango ya Vatican
«Annuntio vobis gaudium magnum: habemus Papam!». ¡°Nakoyebisa bino esengo monene, tozui Papa moko!¡±. Eleki mwa ngonga moke, na linanisa moko ya Basilique Santu Petelo, episkopo ya lokumu Dominique Mamberti alobaki maloba lokola momeseno na latin, na bosakoli na Roma pe na mokili kombo ya mokitani ya sika ya Petelo.
Mgr Robert Francis Prevost, episkopo ya lokumu ya Eklezia Esantu ya Roma, amipesi kombo ya Léon XIV (Léon ya zomi na minei)
08 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 20:17