ÐÓMAPµ¼º½

Luka

P¨¤p¨¤ L¨¦on XIV akendaki na mbalakata kot¨¤la curie generale ya lingomba ya Saint-Augustin. P¨¤p¨¤ L¨¦on XIV akendaki na mbalakata kot¨¤la curie generale ya lingomba ya Saint-Augustin.  (ANSA)

L¨¦on XIV akendaki kotala curie ya lingomb¨¤ ya Saint-Augustin

Mokolo moye mwa zomi na misato (13) ya s¨¤nz¨¤, P¨¤p¨¤ L¨¦on XIV akendaki na mbalakata kot¨¤la curie generale ya lingomba ya Saint-Augustin. Tata-Mosantu akomaki liboso ya ngonga ya nz¨¤ng¨¤, bongo as¨¤laki Misa na chapelle ya lingomba. Na nsima aliaki na bandeko ba y¨¦ bo momeseno tango azalaki episkopo wa lok¨´m¨´.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC elongo nà Tiziana Campisi

 

O mokolo eklezya azalaki kokundola Ngondo Maria ya Fatima, Pàpa Léon XIV asàlaki Misa ya mokolo mwa mibale mwa zomi na misato (13) na baninga ba yé ya lingomba ya ba augustinien. Episkopo ya Roma aliaki elongo na baninga ba yé, lokola azalaki na limeseno wana tango azalaki episkopo wa lokùmù mpe prefet ya dicastère mpo na ba episkopo.

 Ezalaki na tongo, liboso ya ngonga ya nzàngà ya mokolo mwa zomi na misato ya sànzà ya mayi, na curie ya lingomba ya bango ya Saint- Augustin, epayi wapi avandaki ut¡¯o mibù zomi na mibale (12 ans) kobanda mobù 2001kino 2013, tango azalaki prieur générali na bango. Mosika mingi te, bisika motuka ya mwindu ewutaki na Vatikan mpe ememaki Pàpa na Via Paolo VI, na mopanzi ya colonnade ya Bernin, mp ona mwa visite na lingomba lya ye.

Kokende kotala libota

Monkàma ya bato basanganaki liboso lya ekuké ya curie ya ba Augustins nakozela tango akobima. Kasi Leon XIV alongwaki ndanko ya basàngo na ngonga ya zomi na mitano (15h). Prieur général, Alejandro Moral, alobaki na bapansi-nsango été ezalaki mwa visite ya libota, ezali visite ya botondi ngrasya. Ezalai ngonga ya kozala solo kati na libotà, ezali malamu mpenza. Mpamba te ayebi bato banso, mpe biso banso toyebi yé; ezalaki kitoko mingi.

Pàpa Léon XIV na losambo o kati ya sanctuaire ya lingomba na yé ya Saint-Augustin
Pàpa Léon XIV na losambo o kati ya sanctuaire ya lingomba na yé ya Saint-Augustin   (@Vatican Media)

Bozalani elongo ekomamaki na episkopo ya Hippone, Mosantu Augustin, o kati ya mibeko ya bomoyi bwa bang ona lingomba. ¡°eloko ya motuya esangisi bino awa ezali ete bovanda na bomoko na ndako, bongo bokozala na molimo moko mpe motema moko ebaluki na Nzambe¡±. Na kobima, apesaki mbote na bandeko ya lingomba mpe basàli ya ndako mpe baye balambaka. Wana ezalaki kotala ya yambo lokola Papa. Bongo Sàngo Alejandro Moral alobaki été banso bazalaki na esengo makasi.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

14 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 09:39