Kimya, bosolo mpe bosembo, makonzi mya mos¨¤l¨¤ ya diplomasie ya Saint-Si¨¨ge
Albys KBD CP ¨C Kinshasa RDC elongo nà Marine Henrio na Engumba Vatikan
Na kati ya ndako ya ba fresques historiques ya Vatikan, ba diplomates oyo bayambaki na Saint-Siege, bayokaki Lolenge Pàpa ya sika apesaki bango emoneli ya yé mpo na mokùmba mwa bango, mpo na kokotisa kimya, bosémbo mpe bosolo. Léon XIV azwaki maloba sima ya lisukulu lya George Poulides, ambassadeur ya Chypre. Atangaki maloba ma Mosantu Augustin mpo ya kolakisa ntina ya koyoka mawà, mpo na koluka kimya. Likanisi liya ya Mosantu Augustin na mayé matali kimya, epesaki nzela na lisukulu mobimba Pàpa Léon XIV asakolaki o mokolo mwa mitano ya 16 ya sànzà ya mayi.
Corps diplomatiki lokola libotà
Léon XIV abengilingomba diplpmatiki lokola libotà. Ekambami na etindà ya bobateli, mbéla ya kosalisa bato na mokili na esika ya koluka bambano. Abiangi ba diplomati nakolanda ndakisa ya yé nakokatisa mikili misusu mpo ya kokutana na bato ya bikolo mpe momesano mosusu. Masolo mpe koyeba moto mosusu ezali motambwisi (montele) ya mosàla ya etinda ya Saint-Siège, oyo esangani na mabongi misato ya motuyà : Kimya, Bosémbo na mpe Bosolo.
Kimya, ekotinda na bosangani mpe na bomipesi
Léon XIV alobi lisusu ete kimya ezali kozanga bitumba te, kasi likabo lya motuyà ya Kristo oyo akosenga na moto nyonso, nzokandé na maloba mayé. Mp ona kokotisa kimya eye, Léon abyangi na kokolisa masolo, multilateralisme, mpe kosukisa kosàla bibundeli (mandoki) mp ona kopesa bomoyi na mibeko ekotala mokili mobimba.
Bosembo mpo nakopesa lokùmu na bomoto ya bato.
Léon XIV alobi ete kimya ekoleka na nzela ya bosembo. Alakisi bongo bondeko ezali kati na yé na Léon III, mobateli ya ba lotomo y abato, liboso ya bokeséni bozali kotungisa biso mikolo miye. Alendisi bakambi babikolo batonga bisika y abato na boboto, ekangemi na molimo ya libotà . Nakopesa ndakisa ya bomoyi bwa yé lokola moluki-mboka, abetaki nsété na lokùmu na bomoto bwa moto nyonso, oyo bakoki kosimba te, atako etamboli ya ye ezali lolenge kani.
Bosolo bosengeli
Likonzi lya misato ya mosàla ya Saint-Siège ezali bosolo. Esengeli mpo na kokotisa kimya ya solosolo. Eklezya ezali na lotomo ya koloba bosolo mp ona moto mpe mp ona mokili; atako ekoki kopusa na matata to bozangi koyokana. Kasi ekolobama séko, bobele na molimo ya bondeko. Bosolo boye bokosalisa na kolonga mikakatano minene ya moyi mwa lelo: Boluki-mboka, Mayele ya kosàla, mpe ezingelo. Léon asukisaki masolo ma yé na kolobela mobù moye mwa yubilé. Mpo na yé, ezali likabo monene ya bozongeli sika, mpe ya kolikya ete, ekofungola banzela ya kimya, mingi mpenza na mabele ya Ukrayina mpe Terre Sainte.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.