ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Pape L¨¦on XIV, ut'o lininisa ya loge ya kati kati ya baziliki ya Mosantu-Petro, na tango ya losambo la Maria, Regina Caeli, mokolo mwa 11 mayi 2025. Pape L¨¦on XIV, ut'o lininisa ya loge ya kati kati ya baziliki ya Mosantu-Petro, na tango ya losambo la Maria, Regina Caeli, mokolo mwa 11 mayi 2025.   (@Vatican Media)

Ekolo ya Italie ekosunga makasi Saint-Si¨¨ge na kokotisa kimya, elobi Giorgia Melono alobi na L¨¦on XIV

Mokanda moko ya mokambi ya Conseil ya Italie elobi masolo esalem¨¤ki kati na P¨¤pa L¨¦on XIV n¨¤ Giorgia Meloni, moyangeli ya mbulamatari ya Italie, na nzela ya masolo na tshombo. Apesaki ye lok¨´mu lisusu mpo ya boponomi bwa y¨¦, bongo azongeli kolaka ye lisungi ekopesa ye na mos¨¤la ya Saint-Si¨¨ge mpo ya kosukisa matata. Alaki ye mpe bomoko mpo ya bokolisi bwa ethiki ya IA.

Albys KBD CP- Kinshasa/RDC 

 

Masolo na nzela ya tshombo kati na Pàpa Léon XIV nà Moyangeli ya Conseil ya ekolo ya Italie, Giorgia Meloni. Nsàngo yango ebimaki na nzela ya mokanda ekomamaki na ndako Chigi, nzokande ndako ya bopanzi-nsango ya Saint-siège endimaki yango. Mokanda monà mokoloba été Giorgia Meloni apesi lisusu longonya na Pàpa. Ezali na ndenge ya yemoko, mpe na nkombo ya ekolo ya Italie, mp ona boponomi bwa yé na ngwendé ya Petro. Alobeli mpe bondeko oyo ekoki kokatana te, oyo ekosangisaka ekolo ya italie nà Molandi mwa Kristo

¡°Italie esepeli mpe ekosunga misàla makasi ya Saint-Siège mpo ya kimya mpe botiki matata na ba sénario ya mikakatano epayi wapi mandoki ezwi esika koswa mpe yam asolo¡±.

Giorgia Meloni azongeli kolobela ¡°mposa ya italie na kokoba kosàla elongo nà Saint-Siège, mpo na kokolisa elanga ya etique mpe ya moto ya mayele ya kosàla (Intelligence artificielle)¡±. Momekano moko oyo ¨C ezalaki moto ya liyangani ya G7 na Italie, mpe oyo Pàpa Léon akanisaki lisusu eloko ya motùyà- kobatela bomoto bwa moto, bosémbo, mpe mosàlà. Na likita linà, ya mokolo mwa zomi (10) ya sànzà ya mayi, ezali mpe nà ba episkopo wa lokùmu.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

15 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 21:12