ÐÓMAPµ¼º½

Luka

P¨¤pa wa sika, Leone XIV P¨¤pa wa sika, Leone XIV  (ANSA)

Bomoyi bwa papa wa sika L¨¦on XIV

Tata Cardinal Robert Francis Prevost abotami na engumba Chicago. Asali mibu mike lokola ntoma o ekolo P¨¦rou yambo ¨¦t¨¦ bapono y¨¦ lokola mokonzi wa ba Augustiniens mpo na mandats mibale eland¨¤n¨¤.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC nà Bansango ya Vatikan

 

Papa wa yambo ya lingomba ya ba Augustiniens, azali Papa wa mibale oyo abimi na mokili mwa Amerika sima ya Papa François, kasi na bokeseni na Bergoglio, Robert Francis Prevost, mibu ntuku motoba na libwa (69 ans), azali moto wa Amerika ya nordi. Azali moto wa Etats-Unis.  Na yango, episkopo ya sika wa Roma abotami o mokolo mwa zomi na minei (14) ya sànzà ya libwa o mobu nkoto yoko nà nkamà libwa na ntùku mitano na mitano (1955) na Chicago, Illinois, na tata Louis Marius Prevost, oyo tata na mama bauta France mpe Italia, mpe na mama Mildred Martinez, oyo auta o ekolo Espagne. Azali na bandeko babali babale, Louis Martin nà John Joseph.

Alekisi bomwana mpe bolenge bwa yé na libota lya bango mpe atangi liboso na likindo like lya Basango ba augustins, mpe na eteyelo ya likolo (Université) Villanova na Pennsylvania, epai wapi azwaki na mobù nkoto yoko nkama libwa ntuku nsambo na nsambo (1977) lipolome na Mathématiques mpe atangi filosofia. O mwa yambo ya sànzà ya libwà kaka o mobu mwango, akoti o noviciat ya molongo ya Santu-Augustino (OSA) ya Santu-Louis na etuka ya Mama wa biso wa toil elamu (Notre Dame du Bon Conseil) ya Chicago. Asali bilako bya ye bya yambo o mokolo mwa mibale ya sànzà ya libwà o mobù nkoto yoko nkama libwà na ntùku nsambo na mwambi (le 02 septembre 1978) mpe bilako bya nsuka o mokolo mwa ntùku mibale na libwà ya sànzà ya mwambé o mobù nkoto yoko nkamà libwà ntùku mwambé na moko (le 29 aout 1981).

Asali kelasi ya yé na Catholic Theological Union ya Chicago, epai wapi azwaki lipolome ya mambi ma Nzambe (Théologie). Ntango azalaki na mbula ntuku mibale na nsambo (27 ans), bakonzi baye batindaki ye na engumba Roma mpo ya kotanga mambi maye matali molongo mpe mobeko mwa Eklezya (droit canonique) na eteyelo ya likolo na nkombo Université pontificale Saintu-Thomas d¡¯Aquin (Angelicum). Na Urbe, akulaki Bonganga-Nzambe o mia zomi na libwa mobu nkoto yoko nkama libwa na ntuku mwambe na ibale na Collegia ya ba Augustins ya Santu Monica o maboko ma episkopo Yoane Jadot, pro-président ya conseil pontifical mpo na baye bazali bakristu te, oyo ekoma lelo bosololi o kati ya mangomba (Dialogue interreligieux).

Nganga-Nzambe Prevost azwaki licence na mobu nkoto yoko nkama libwa na ntuku mwambe na inei (1984) mpe na mobu molandi, ntango azalaki kolengele makomi ma ye mpo akoma Nganga-Mayele (Sa thèse de doctorat), batindaki ye bo ntoma na Chulucanas, Piura, Pérou (1985-1986). Ezali nde na 1987 ayei kosilisa doctorat epai wapi alobelaki ntina ya mosala mwa mokonzi (Prieur) wa lingomba ya molongo ya Santu-Augustino mpe sima akomaki dikitele ya vocations mpe dikitele ya missions ya province augustienne °Mother of Good Counsel° na Olympia Fields, Illinois (USA).

Mobu moye molandi, akei lokola ntoma na Trujillo, na Pérou, mpe lokola mokambi wa mokano mwa bobokoli bwa lisanga (formation commune) mpo na bilenge baye balingi kolanda nzela ya Nzambe o molongo mwa Santu-Augustino na ba vicariats ya Chulucanas, Iquitos mpe Apurimac. Azalaki mokonzi (Prieur) ya ba communautés mibu zomi na moko (11 ans) --- (1988-1992), dikitele ya formation (1988-1998) molakisi wa baye basali bilako (1992-1998) mpe, na archidiocèse ya Trujillo, mpe vicaire judiciaire (1989-1998) mpe moteyi ya droit canonique, wa patristique mpe wa morale na likindo linene Santu Carlos mpe Santu Marcelo. Kaka ntango ena, bapesaki ye mpe mokumba ya pastorale ya °Mama wa biso Mama Eklezya°, oyo ekomaki sima paloasi na nkombo Santu-Rita (1988-1999), na litumu ya bobola ya engumba, mpe mokambi wa paloasi Mama wa biso ya Monserrat banda 1992 ti na 1999.

Na mobu 1999, aponomoki lokola mokonzi wa etuka ( prieur provincial ) ya province augustinienne  °Mama wa Toli Elamu° na Chicago, mpe na sima ya mibu mibale na ndambo, ntango basalaki Chapitre ordinaire ya Molongo mwa Santu-Augustino, bandeko ba ye bamofulele baponi ye lokola mokambi wa Molongo mwa Santu-Augustino mobimba (prieur general), bandimi ye mpe na 2007 mpo na mandat ya mibale.

Na sanza ya zomi ya mobu 2013, azongi na province augustinienne, na Chicago, mpe azalaki dikitele ya bobokoli bwa balikindo na couvent Santu-Augustino, mopesi  toli wa yambo mpe mokitani wa provincial ( vicaire provincial ) ; mikumba oyo asalaki ti ntango Papa Francesco aponoki ye mokambi wa diocèse ya Chidayo na ekolo Pérou, nabotombolaka na lokumu ya episkopo mpe episkopo titulaire ya Sufar. Afandaki na diocèse o mokolo mwa nsambo ya sanza ya zomi na moko , na miso ma Ntoma wa Papa James Patrick Green, oyo akulisaki ye boepiskopo mwa sima ya sanza moko , o mokolo mwa 12 sànzà ya zomi na mibale, na eyenga ya "Mama wa biso wa Guadalupe, na cathédrale Santu-Maria".

Mokano mwa yé mwa  boepiskopo ezali  ¡°In Illo uno unum¡±, maloba ma ye Santu Augustino alobaki na esakola yoko , litalisi ya Nzembo 127, mpo na kolimbola ¡®te ¡° atako biso, bakristu, tozali baike, o kati ya Kristu se moko, tozali se moto moko¡±.

O mokolo mwa 26 sànzà ya libwà o mobu 2015, Papa François alubolaki ye episkopo ya Chiclayo, na sanza ya misato o mobu 2018, aponomaki mokitani wa babale ya Likita lya ba episkopo ba Pérou , o ntei wapi azalaki moko ya kopesa toli na maye matali nkita mpe mayele to mimesano mpe bobokoli (culture et education ). Na mobu 2019, François alubolaki yé o kati ya booko bato ba Congégation mpo na maye matali banganga-Nzambe o mokolo mwa 13 ya sànzà ya nsambo 2019 mpe mobu molandi, o kati ya baye ba Congrégation mpo na maye matali baepiskopo (o mokolo mwa 21 sanza ya zomi na moko ). Kaka na ntango ena , o mokolo mwa 15  ya sànzà ya minei o mobu 2020, Papa Francisco apesaki ye mokumba bo episkopo mokambi wa diocèse ya Callao na Pérou.

O mokolo mwa 30 sanza ya yambo o mobu 2023, Papa abengi ye na Roma lokola chargé ya Dicastère mpo na baepiskopo mpe président ya commission pontificale mpo na Amerika latina, nabomokomisaka bo episkopo wa lokumu. Na Consistoire ya mokolo mwa 30 sanza ya libwa kaka ya mobu mona, Papa Francisco akomisaki ye Cardinal, na bopesi ye bodiakono bwa Santu Monica. Mpe azwi mokumba o mokolo mwa 28 sanza ya yambo ya mobu 2024 mpe, na moto mwa Dicastère, azali mpe o kati na suka ya mibembo mya  Papa Francisco mpe na ba sessions mibale ya XVIe Assemblée générale ya molongo ya Synode ya baepiskopo mpo botamboli nzela yoko , esalemiaki  na Roma  banda o mokolo mwa minei na ntuku mibale na libwa ya sanza ya zomi 2023 mpe o mokolo mwa 2 tee 27  ya sànzà ya zomi o mobu 2024. Amemi nzebi  ya ba masangà ya synodi oyo ezwaki  banda kala ntango azalaki Prieur Général mpe motindami ya lisanga ya bakonzi ba mangomba manso ( représentant des Supérieurs Généraux (UGS ).

Na ntango ena, o mokolo mwa 4 ya sànzà ya zomi o mobu 2023, François alubolaki yé moko wa baye basalaka mosàla na dicastère mpo na evangélisation , section  mpo na première  évangélisation mpe ba eklezya ya sika ndenge na ndenge; ya dicastère mpo na Doctrine ya boyambi ; dicastère mpo na ba eklezya ya orientales ; mpo na banganga-Nzambe ; mpo na ba Instituts ya vie consacrée mpe ba sociétés ya vie apostolique ; mpo na culture mpe éducation ; mpo na Texte législatif ; ya commission pontificale mpo Ekolo nà etùkà ya Vatikan .

Na suka, o mokolo mwa 6 ya sànzà ya mibale ya mobu 2025, azwi elako, akomi episkopo wa lokùmu na Papa François mpe awui nkombo ya Eklezya « Suburcaire d¡¯Albano. Ntango ekotaki ( Papa François ) na lopitalo Gemelli mpo na mbala ya suka , Mgr Prevost akambaki  récitation ya Sapele mpo na bokolongonu bwa nzoto ya Papa François o mokolo mwa 3 ya sànzà ya  misato na lobala la Santu-Petro.

    

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

09 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 13:28