Banso na Lib¨¤nd¨¤ (Bato banso babima)
Albys KBD CP ¨C Kinshasa /RDC - Avec Paolo Ruffini
Awa bato banso bazali kozela, banso bazali mpe komituna nani akozàla episkopo ya Roma, ya mbala ya nkàmà mibale na tukù motoba na sambo (267e). Atako na nzoto, banso bazali libandà ya bisika wapi bakitani ya ba apostolu bazali baepiskopo ba lokùmu, kopono mosàleli ya basàleli ba Nzambe, Pàpa mokoyà, ezali mosàlà ya mondimi inso. Mokonzi moye mwa eklezya, azali nayino mosàleli moyé Kristo yemei apesaki ndakisa ete solo moto monene ezali oyo akosàlela baninga. Mowulani moyé mozali na mokakatano, mingi mingi mpenza na mokili mwa lelo momeseni na bokonzi, momeseni nakopesa mitunà mpe bilobaloba mp ona bomoyi bwa Pàpa mokoyà.
Banso Libandà.Mobeko moye mokotungisa ngonga oyo ya bozeli. Nà ba episopo ya lokùmu mpe bazali kozela mokengeli mpata ya bango. Babyangemi na kokoto o mobombamo mpe kotika kaka bato mpamba te kasi manso mazali libandà ya chapelle Sixtine. Kuna bakozala bango moko, mabanzo mpe makanisi ma bango. Basengeli kotika nyonso libandà mpo ya kotikala sé na molimo, na makambo malekeli bango mpe na mobombamo mwa Petro.
Petro azali molobi mbisi oyo Yézu alakaki ete mabé makosimba ye te, cfr (mt 16, 18). Na maboko ma apostolu Petro, nde Yezu atikaki eklezya yé, bongo asambelaki Nzambe Tata asunga yé mp ona mokumba ya bozito akomeme o mapeke mayé.
Petro azali Moto oyo asungami na losambo eye ekitani na bileko mpe lisapo tee na bakitani ba yé kino mikolo mya biso mwa lelo. Solo losambo la mpiko mpo ete eyamba ya yé ekweya tè liboso la mukakatano, bokeseni ya tango wana, mpe oyo ezali kokoba o mikolo mya biso kati na bokabwani, bopakano,¡
Eleko etondi mposa ya kokonza kasi ezangi bolingi, ezangi makoki ya koyeba lotomo ya mabongi ya mosàla mpe ya bolamo bwa banso, kasi etondisami kaka na bongai ya mpamba, na lokutà, etondisami na boyini kolela ngolu, etondisami na molimo ya kozongisa mabé na mabé nzoka ndé ezangi bolimbisi, cfr Lc 22, 31-32. Petro azali mobombamo mwa Ngolu mpe bolingo, ya bomoko, ya boyoki. Molobi mbisi oyo atungisami butu mobimba na ebale nakozanga kozwa mbisi, kasi andimeli maloba mwa popaya oyo eyebisi yé bwaka moniama na loboko mosusu mpe asili kososola ete moto wana azali ndé oyo esengeli kolanda, ayebi ete mopaya wana nde molakisi mwa ye.
Petro azali mosumuki oyo alimbisami ; azali moponami oyo yambo te asepela, alelaki makasi mpo atekaki molakisi mwa yé lokola Yudasi. Na mpinzoli ya yé nde mobombamo monene. Awa nde lisolo ya mobombamo mwa eklezya; mpinzoli na yé ezali bafungola ya bokonzi. Ezali bafungola ya Petro mpe mobombamo mwa yé: bolembu oyo ezali na bokasi, mpamba te, mpo ezali kongenge na mwinda ya yemei te. Azali libanga atako ebongeli ye te. Manso epesameli biso na nzela ya boyambi.
*Mokoloto etiyami na moyangeli mwa kala ya dicastère mpona communication.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.