ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bas¨¤lisi ya tango ya lik¨¤m¨¤ na esika Jet Set epayi wapi ndako ya mabina ekweyaki na tango ya concert. Bas¨¤lisi ya tango ya lik¨¤m¨¤ na esika Jet Set epayi wapi ndako ya mabina ekweyaki na tango ya concert.  (AFP or licensors)

P¨¤pa abondi ekolo ya R¨¦publique dominicaine

Na ekolo oyo ya Ba Antilles, lik¨¤m¨¤ moko ya somo ekweyili bango. Ndako ya kobina moko ezwami na mboka mokonzi, ebukanaki na b¨´t¨´ ya mokolo mwa 7 aprili mpo na komona mokolo moye mwa 8. Na telegramme moko, etindamaki na archeveque ya Saint-Dominique, P¨¤pa alakisi mawa yay¨¦ mpe as¨¤mbeli mpo ya baye bakufi na lik¨¤m¨¤ lin¨¤.

Bansàngo ya Vatican

 

Na kati ya Telegramme oyo etiyaki mokoloto Pietro Parolin mokomeli ya etùkà ya Ngwendé-Esantu, bazali kolobela ndaku ya mabina oyo ebukani mpe ekweyi na ekolo ya Républiki Dominicaine. Likàmà lisalemaki na bùtù ya mokolo mwa sambo (7) na kokoma o mokolo mwa mwambé (8) ya sànza ya aprili. Ndako eye eyambaki bato pene ya 500 mpe 1 000 oyo  bayàki na concert ya star Rubby Perez ya merengue. Ye mpe azali elongo nà baye basili kozwa likàmà.

¡°Pàpa François azali na mawa mingi mpo na nsango ya somo ya kobukana ya ndaku ya mabina ya butù. Bato ebele bakufi mpe bazoki. Asambeli mpo ete milimo ya baye bakufi mopema seko. Mpo na mabotà ya baye bazwi likàma, Pàpa apesi bango bakondoleansi mpe abondi mabotà. Kasi na baye bazoki, alendisi bango na kobika. Bongo asengi ete bakoba kosàlisa banso bazwi likàmà linࡱ.

Lisungi liùti kaka na wànà esika

Ut¡¯o mokolo mwa mosàlà mibalé, babimisaki ata moto moko te ya bomoyi na nsé ya bitiké ya ndandu oyo ebukanaki. Bazali kosàla nyonso mpo ya kolongola biteni ya ba beton mpe mabendé. Na mobù 2005, likàmà lokola boyé likweyaki ; moto mopelaki na boloko ya Higuey, bongo ebomaki bakangemi 136. Mpo na motango ya tongo ya mokolo mwa mosàlà mineyi, bilembo epesi bato nkamà moko nà tùkù mwambé na ineyi (184) oyo bakufi. Ekomisi bongo likàmà liyé, moko ya somo na lisolo ya ekolo ya République Dominicaine.

Bakambi  baekolo bapesi elikya solo mosàlà ya koluko bato ekokoba. Bato baye bazali kosunga bazali 300 na esikà enà. Lisalisi misusu moùtaki na Israël mpe na Porto Rico bikomi mpe wànà. Motango y abato babungi epesami nayino te.   Luis Abinader, mokambi wa ekolo, apesi mobeko ya mikolo misato ya matàngà na ekolo mobimba.

Pàpa François elongo na Luis Rodolfo Abinader Corona, Mokambi wa ekolo ya République dominicaine.
Pàpa François elongo na Luis Rodolfo Abinader Corona, Mokambi wa ekolo ya République dominicaine.   (Vatican Media)

Liyebisi ya ba episkopo

Na ngambo na bango, ba episkopo ya République Dominicaine balakisi mpe bondeko mpe bozalani ya bango. Basengi na bato basàngana mpo ya kosunga basusu na makila, ba ambulansi, babetela mbulamatari masolo mpe basambela mpo ya baye bazwi likàmà. Basengi na bato babungisa elikya te, babongola mokakatano moye na litàtoli ya bolingo oyo ekoùta na boyambi ba biso.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

11 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªnei 2025, 10:25