ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.04.23 Bopesi limemya ya bandimi na ¨¦b¨¦mb¨¦ ya P¨¤pa Francesco. 2025.04.23 Bopesi limemya ya bandimi na ¨¦b¨¦mb¨¦ ya P¨¤pa Francesco.   (Vatican Media)

Matanga mwa P¨¤pa, likambo la kok¨¤mwa likotikala mokolo mwa lisapo

Misa ya matanga ya P¨¤pa ya 266¨¨me na eklezya ekobanda na ngonga ya 10h00 o mokolo mwa poso mwa 26 ya aprili na lopango ya Saint-Pierre. Ekokambama na epeiskopo wa lok¨´mu Re; bongo ekosila na bomemi sanduku ya ebembe na Sainte Marie-Majeur esika wapi bakokunda y¨¦.

Albys KBD CP- Kinshasa/RDC elongo nà Jean-Charles Putzolu na Vatican

 

Baepiskopo wa lokùmu pene ya 250, nkotà yoko ya baepiskopo, ba nganga-nzambe, basàngo mpe bamamelo bakosàngana na Misa ya matanga ya Tata-Mosantu François o mokolo mwa poso mwa tukù mibale na motobà (26) ya sànzà ya aprili na ngonga ya 10h00. Sanduku ya ebembe ya yé esalemà na mabaya mpe zinc ekozipama na mpokwa ya mokolo mwa mitano, ekomonisama na lopango ya Vatican liboso ya lotale. Bato bakozala ebélé mpe bakoùta bipayi na bipayi mpo ya kolakisa limemya la bango ya nsuka. Etulùkù ya bato bayé banso ya ndenge na ndenge, ezali nde Eklezya ya François, eklezya ekoyamba ¡°banso banso banso¡± lolenge yemei alembaki te kobelela yango.

Misa ya yambo ya ba novemdiales

Lokola ebongisami na Ordo Exsequiarum Romani Pontificis , Misa ya yambo ya matanga ekosàlema o kati ya baziliki ya Mosantu Petro (Saint-Pierre). Ekolandisama na ba Misa misusu mwambé kino o mokolo mwa mineyi (4) ya sànzà ya mayi. Ekokambama na tata wa lokùmù Giovanni Battista Re. Batata wa lokùmù nà bapatriarche bakolata bilamba ya pourpre nà mitre ya mpembe damassée, kasi bokeseni ekozala na mitre ya baepiskopo, mpo ekozala ya mpembe. Milùlù ebongisi ba matangi maye: Bikélà bya bapostolo, mokanda mwa santu Polo ona bakristu ba Filipi nà mpe Nsango Elamu ya Santu Yoane. Mateya mikopesama na doyen ya Collège ya baepiscopo wa lokùmù, bongo bansàmbo ekosàlema na ba nkotà ya falansa, kiarabe, kiportigais, kipolonais, kiallemand mpe kichinois. Sima ekolanda milùlù mya Ukaristya, kokùla ya bandimi, mpe milùlù ya adieu elongo na banzembo ya chapelle sixtine ekoyembela François mpo na mbala ya nsuka.

Na Sainte-Marie-Majeure, Lotùkù ya maria esàlemaki poso mobimba
Na Sainte-Marie-Majeure, Lotùkù ya maria esàlemaki poso mobimba   (ANSA)

Na nzela ya Sainte-Marie-Majeure

Mpo na kotosa boséngà bwa nsuka ya molimo ya episkopo wa Roma, bakomema sanduku ya ebembe ya yé na baziliki ya ba Pàpa, Sainte-Marie-Majeure, liboso ya icône ya Ngondo Maria Salus Populi Romani  esika wapi azalaki kokende mingi mingi, yambo mpe nsima ya mibembo tuku mineyi na sambo (47 voyages) lokola mokitani ya bantomà, mpe sima ya lopitalo na yé kala te na sànza ya febuali nà ya marsi. Kuna babola bakopesa yé mbote ya nsuka yambo te bakunda yé. Bakokanda sanduku ya ebembe, bakobenisa yango mpe bakotiya yango na lilita. Bokundi ekoleka na ndenge ya bonkùtù, bongo episkopo wa lokùmù camerlingue akotiya mokoloto ya ba Pàpa na sanduku ya ébembe, nà mpe oyo ya biro ya milùlù mya pàpa na mpe ya Chapitre libérien. Nsima ya losambo ya Regina Cæli, bakokoma mokanda ya bokundi ebembe, bakotanga yango mpe bakambi ba eklezya, episkopo wa lokùmù camerlingue, Régent ya ndako ya baPàpa, Moyangeli ya milùlù ya Pàpa, mpe na nsuka mokomi ya Leta, bakotiya mokoloto mwa bango.

Lilita lya Pàpa François
Lilita lya Pàpa François   (ANSA)

Mokili na mboka Roma

Misa ya matanga ya Papa François ekoleka na Mondovision. Ekozala mpe na likoki ya kolanda yango na Lifalanse na site na biso ya vaticannews.va/fr, na lokasa ya  mpe na chaîne  ya bopanzi sàngo ya Vatican. Na esika Saint Pierre, bazali kozela batindami ya bikolo pene ya nkama moko nà tukù misato (130 pays), na kati na bango ekozala na bakambi zomo (10)  oyo bazali koyangela sika na bokonzi, mpe pene ya bakambi tukù mitano (50) ya baetuka bakozala wana. Mpe mpo na kopesa lapolo ya molulu yango, bapanzi-nsàngo koleka 4 000 basengaki bápesa bango ndingisa na Saint-Siege.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

26 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªnei 2025, 12:04