ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2023.08.31 Baziliki ya Mosantu Petro ya Roma. 2023.08.31 Baziliki ya Mosantu Petro ya Roma. 

Likita ya Papa: Yezu alingi biso lokola tozali ata bolembu na biso

Na mbala ya inei na molongo ya mateya matali bokutani na Yezu, Papa Fran?ois azongelaki eye ya moto ya mosolo. Na mokanda ebongisamaki na likita ya mokolo ya 9 ya sanza ya minei, alakisi boni boni Yezu alingi biso lolenge tozali, atako tozali na bolembu mpe masumu. Alimboli t¨¨ esengeli na biso kozala kilo te po na kozala na motema moko ya bonsomi, mpe kobima na bomikoka mpe bo ngai nzambi ya kozala yo moko te.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

¡°Oyo ezali ya motuya mpenza po na kozala moto ya esengo ezali oyo tokumbi na mtema¡±: wana ekoki kozala na bokuse liteya ya Papa François ebongisamaki po na likita ya mokolo ya misato ya 9 ya sanza ya minei mpe Santu Papa akokaki kosala yango te po na eleko ya bopemi sima ya bobimi na ye na lopitalo.  Na mokanda ena azongeli bokutani kati na Yezu na moto ya mosolo, oyo ¡°azali na kombo te¡± mpe akotuna na Kristu nini esengeli asala po na bozui bomoi ya seko lokola libula (heritage).

Yezu akotala mozindo ya motema na biso

Na eteni eye, oyo ekobeta, elakisi Papa, ezali tè ¡°moto oyo ayebi likambo ya ofele te. Nionso ezali eloko ya kozua. Nionso ezali lotomo. Bomoi ya seko ezali po na ye libula, eloko moko tokoki kozua na bosembo, na nzela ya botali na bokebi maye tomipesa¡±.  Kasi bolingo ezali wapi na nionso wana, Papa François amitunaki.

Atako bongo, ¡°Yezu akokende mosika mpe akotala na kati¡±, lokola akosala na moko moko ya biso, mpe yango wana Yezu ¡°alingi biso lokola tozali ya solo¡±, elingi koloba tolemba mpe na mposa ya balinga biso lokola tozali. Kutu, mokomi nsango elamu Malako akokoma tè Yezu ¡°alingaki¡± moto wana liboso ya kobenga ye alanda ye, elembo ya ¡°kiofele¡± ya bolingo ya Yezu eye ¡°ekeseni mpenza na likanisi ya elonga eye evandi kati ya moto wana¡±, esembolaki Papa. Esika wana ezali fungola ya esengo, emonaki episkopo ya Roma. ¡°Tango kaka toluki tosomba to tosenga bolingo, boyokani ena ekosala te tè tozala na esengo¡±, pamba tè oyo ezali ya solo ya boyokani kati na Yezu na moto ya mosolo ezali se bongo na boyokani kati na biso.

Kotekisa oyo ezali kopesa biso bozito

Moto ena, longola mposa na ye ya bomoi ya seko, azangi likambo moko, eye ya balingi ye te mpe ya mposa moko, eye ya kozala. Ezali ¡°mpota moko ezali na biso lokola bato, mpota eye ekoki kolekisa bolingo kati na yango¡±, elobaki Papa. Mpe ¡°po na kosilisa bozangi ena¡±, ¡°esengeli ¡®toteka¡¯ nionso oyo ezali kopesa biso kilo, po na bozui bonsomi ya motema na biso¡±, ekobaki ye. ¡°Tokozua litomba te soki tozali komibatela biso moko, soki tozali kokabela babola te, soki tomipesi te mpe soki tokokaba te¡±. Ezali likanisi moko Yezu asalaki na moto ya mosolo liboso ya kobenga ye alanda ye.

Pamba tè moto wana azali ye moko. Yezu akolendisa ye abima na bozangi na ye ya bomipesi na boyokani moko, mpo ¡°tokoki koyoka kombo na biso kaka na kati ya boyokani, epayi wapi moto akoki kobenga biso¡±. Soki lelo tozali na mawa makasi, ezali tango mosusu mpo tozali kobika na ¡°ezaleli ya tomikoka mpe ya bo ngai¡±. Mpe moto moko te akotanga kombo na biso. Moto ya mosolo azali na mawa lokola. « Mawa na ye ezali elembo tè akokaki kokende te. Tango mosusu, tokoki kokanisa tè oyo ezali kokanga biso ezali bozui nzokande ezali bozito. Elikia ezali ete moto oyo, lokola moko moko kati na biso, akoka kobongwana lelo to lobi mpe azua mokano ya kokende », esukisaki Papa François.

 

09 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªnei 2025, 16:22