Bilongi bya Nsango Elamu: P¨¤pa akobete lisapo lya ba bokutani bwa Yez¨´
Na srie eye ekabwami na biteni zomi na mwambé (18), Pàpa abeti lisolo ya biteni bisusu ezali kolobela Yezu. Ya yambo ezali nà Matthieu, mofutisi mpaku. Ba auteurs ya manaka mànà bazali Andrea Tornielli mpe Lucio Brunelli; esàlemi na lisalisi lya Renato Cerisola, oyo azwaki mpe ba foto. Miziki ezali oyo ya Michelangelo Palmacci bobele ya ebandela (originali).
¡°Na eleko oyo Pàpa François azali na bopemi ya maladi, mpe lolàkà la yé lozali koyokana mingi te¡±, elobi Andrea Tornielli, mokambi ya bapanzinsàngo (babimisi ya bamedias) ya Vatican, ¡°ezali yoko lolenge ya koyoka yé mpe kolanda mikanda mya yé ya kitoko oyo azali kolobela Yezu¡±.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.