ÐÓMAPµ¼º½

Luka

ÐÓMAPµ¼º½ Francis holds prayer for migrants and refugees, in St. Peter's Square ÐÓMAPµ¼º½ Francis holds prayer for migrants and refugees, in St. Peter's Square  (REUTERS)

Audience g¨¦n¨¦rale : ? Nzambe akoki koleka te bongo aluka baye baye babungi te ?

Kowuta ndako Santu Martha epayi wapi azali kaka kopema, Papa Fran?ois aponi komanyola na eteni ya Zakeo na liteya ya mokolo ya misato 2 ya sanza ya minei. Ayinama na bato banso, Zakeo mofutisi mpako eye baboya na bana mboka akokutana na mawa ya Yezu, ? oyo akoya ngonga inso koluka biso, ezala lolenge nini tozali ?

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Ezali eteni moko ya Nsango Elamu eye « ezuaka esika moko ya ntina na nzela ya molimo » ya Papa François, lokola ye moko akomi na ebandeli ya liteya na ye.  Etali bokutani ya Yezu na Zakeo, mokonzi ya bafutisi mpako, liteya na ye ya mposo na mposo elobamaki mokolo ya misato 2 ya sanza ya minei. Ebimisami na audience générale te, Papa François azali kaka na bopemi na ndako na ye ya Vatican. Liteya ya lelo ezali na molongo ya likambo likonzi ¡°Yezu Kristu elikia na biso¡±, eye ebandaki na bokoti ya mobu ya jubilé.

« Mokonzi asekwi akokoba kokita na lifelo ya lelo »

Na Nsango Elamu ya Luka, Yezu akei mosika na Yelusalema, na mboka Jéricho. Elili ya kolakisa tè akokendeke lokola na bisika ya malonga te ya mokili na biso. « Ya solo, Mokonzi asekwi akokoba kokita na lifelo ya lelo, na bisika ya etumba, na mpasi ya bato bayebi likambo te, na motema ya ba mama baye bazali komona bana na bango bazali kokufa, na nzala ya babola », elimbolaki Papa wa Roma.

Na mboka ya Jéricho, ezali Zakeo, « moto moko amibungisa ». Papa alobi tè santu Luka akobeta nsete na lolenge ya Zakeo, moko ya baye bafutisaka mpako mpo na bato ya Roma baye bazali kokonza Israele na eleko ena. Azali kutu mokonzi na bango, « lokola mpo na koloba tè lisumu na ye ebakisami », mpe moto ya mosolo ebele. Mokanda elingi kolakisa tè ¡°azui mosolo ebele na mokongo ya basusu, na botali esika na ye ya mokonzi¡±. Yango wana esali tè ¡°babwakisa ye, ayinama na banso¡±, ekomaki François.

Bato bakopekisa Zakeo amona Yezu

Ntango Yezu akoleka na mboka, Zakeo azui mposa ya komona ye. Kasi azali mokuse, mpe akomona ye te. ¡°Ezali ndenge tozalaka, tozali na bisika tosukaka maye tosengeli kotambola na yango¡±, ekomaki Papa. Ye asosoli tè bato bazali kopekisa Zakeo Yezu, na lolenge ya bozongisi mabe.

Kasi Zakeo alembi te mpe azui mokano ya komata na nzete moko mpo na komona oyo azali koleka. Ezali likambo moko ya makasi pamba tè ¡°esengeli kozala na molende mpe koyoka nsoni te, esengeli kozala na bomikitisi ya bana mpe kotala bomoto na yo te¡±.

Esika azalaki na nzete na ye, Yezu akobelela Zakeo. Na esika agangela ye na miso ya bato, oyo tango mosusu bato bazalaki kozela, lolenge Papa amoni, Mwana ya Nzambe akoluka Zakeo ayamba ye, pamba tè ¡°Nzambe akoki koleka te bongo aluka baye babungi te¡±.  

Esengo na motema ya Zakeo

Mopanzi Nsango Elamu Luka akoloba bongo ¡°esengo¡± ya Zakeo na boyambi Kristu. Nzokande, bato bazali koyima yima, basepeli te komona Yezu akende epayi ya oyo bazali kokanisa lokola mosumuki. Pamba tè mawa ya Yezu ezali ntango mosusu mpasi mpo na kondima, elimbolaki Papa, ¡°mingi mpenza soki Nzambe alimbisi baye, mpo  na biso, babongi na yango te. Tokoyima yima pamba tè tolingi kotia ba ndelo na bolingo ya Nzambe¡±.  

¡°¡°Ezali esengo ya oyo ayoki tè bazali kotala ye, bayebi ye mpe lisusu balimbisi ye. Botali ya Yezu ezali botali ya botúki te kasi ya mawa¡±¡±

Nsima ya koyamba Yezu, Zakeo azui mokano moko makasi: azongisa mbala inei oyo ye ayiba. ¡°Ezali ntalo moko ya kofuta te, pamba tè bolimbisi ya Nzambe ezali ofele kasi ezali mposa ya komekola Oyo alakisi ye tè alingi ye. Zakeo azui mokano moko oyo asengelaki kosala te, kasi asali yango pamba tè amoni tè ezali lolenge na ye ya kolinga¡±, ekobaki François.

Na bosukisi, Papa wa Roma akosenga na bandimi balanda Zakeo mpo ¡°babungisa elikya te, atako tomoni tè babwakisi biso to tozali na makasi ya kobongwana te¡±. Abiangi moko moko ya kotia motema na ¡°mawa ya Nzambe, oyo akoya na eleko inso koluka biso¡±.

 

02 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªnei 2025, 17:40