ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2023.03.20 Elilingi ya elembo: Mitra  mpo na boponomi  ya Episkopo ya sika,  2023.03.20 Elilingi ya elembo: Mitra mpo na boponomi ya Episkopo ya sika,  

Sango Victor Quematcha akomi episkopo ya Bafat¨¤ na ekolo ya Guin¨¦e -Bissau.

Tata-Mosanto aponaki lokola episkopo ya Bafat¨¢, na ekolo ya Guin¨¦e-Bissau, o mokolo mwa mwamb¨¦ (8) ya sanza ya misato, Sango V¨ªctor Lu¨ªs Quematcha, ya lingomba ya ba O.F.M. Kino lelo azalaki D¨¦finiteur g¨¦n¨¦ral na Ordre ya ba Fr¨¨res mineurs franciscains mpo na Afrika.

Bansango ya Vatican

 

Na tongo ya mokolo mwa poso mwa mwambé ya sanza ya marsi, ndako ya bopanzi nsango ya Ngwende-Esantu abimisaki na polele liyebisi ya boponami ya Mgr Víctor Luís Quematcha, O.F.M., nakozala episkopo ya Bafata. Abotamaki mokolo mwa tuku ibale na sambo (27) ya sanza ya aprili ya mobù 1967 na mboka Cùmura, na ekolo ya Bissau (Guinée-Bissau). Atangaki filosofi mpe Sciences humaines na eteyelo monene Don Bosco de Lomé (Togo), bongo teologie na Grand Séminaire ya Anyama na Abidjan (Côte d¡¯Ivoire). Asalaki bilako na 1997 na Brà, mpe akulaki bonganga na 1998 o mokolo mwa mibale (2) na Nhoma (Guinée-Bissau).

Mgr Quematcha akambaki na misala miyé:

Molakisi molandi ya ba novices na Dapaong, na Togo (1997-2000); recteur ya petit séminaire ya Brá, na Guinée-Bissau (2000-2004); licencié na théologie morale ya Académie pontificale alphonsienne ya Roma (2004-2006); professeur ya théologie morale na Grand Séminaire interdiocésain Dom Settimo Arturo Ferrazzetta ya Bissau (2006-2021); molakisi ya ba profès temporaires na Brá, Guinée Bissau (2007-2009); mokengeli ya Saint François d¡¯Assise mpo na Guinée Bissau (2009-2018); sango mokonzi ya kathédrale Nossa Senhora da Candelária ya Bissau (2014-2020); directeur lopitalo Mal-de-Hansen na Cumura Guinée Bissau (2017-2021); définiteur général ya Ordre des Frères Mineurs Franciscains mpo na Afrique (ut¡¯o 2021).

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda  na biso ya basango na kofina esika eye

08 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 00:10