ÐÓMAPµ¼º½

Luka

P¨¤pa Franswa azali kokoba kozwa lisalisi ya baminganga na lopitalo Gemelli ya Roma. P¨¤pa Franswa azali kokoba kozwa lisalisi ya baminganga na lopitalo Gemelli ya Roma.  

Papa Na Gemelli : Bakati kopesa ye mopepe na nzela ya masini

P¨¤pa asanganaki na Misa ut¡¯o lopitalo ya Gemelli na Roma, o mokolo mwa eyenga ya mosantu Yosefu, Tata wa Yezu mpe molongani wa Ngondo Maria. Bokolongono bwa nzoto ya y¨¦ ezali kobonga; na yango bakati kopesa y¨¦ mopepe na nzela ya masini. Na mwa mos¨¤l¨¤ misato mwa zomi na libw¨¤ (19) ya sanza ya marsi, ndako ya bopanzi-nsango elobi ete bos¨¦ng¨¤ ya kopesa y¨¦ lisalisi ya oxyg¨¨ne ekitisami.

Bansango ya Vatican

 

Lolenge manaka ya ndako ya bopanzi nsango ebimisi o mokolo moye mwa 19 ya sànzà ya marsi, bokolongono bwa nzoto ya Mosantu Pàpa ekomi kobonga. Kasi minganga balobi ete infection ya ba pumon elongwe nayino te. Botùyà ya ba analyse ezali normale ; Papa azali na fevele te.

Ekotaki yé lopitalo ut¡¯o mokolo mwa zomi na mineyi (14) Mosantu Pàpa awuti kokata lisalisi ya kopesa mopepe na nzela ya masini, mpe azali na mposa ya kozwa lisali ya oxygène mingi te, bakitisi yango. Na eyenga ya mosantu Yosefu, François asanganaki na Misa na chapelle ya poliklinik Gemelli.

Mokolo mwa Vocation

Atako azali na lopitalo, mokonzi monene ya ba ntomà azali kokoba na mosala mwa ye. Mpo na mokolo ya mokili mobimba ya vocation o mokolo mwa zomi na moko (11) ya sànzà ya mayi mokoyà, alendisaki bilenge na kokundola lolenge nini Nzambe akobyanga bango. Mpo na yé, mokili mosengeli na bilenge oyo bazali batamboli ya elikya, mpiko komibonza ya bango na kristo, basala yango na esengo mpo ya kozala moyekoli mwa yen a mokili.   

Lolenge yoko, Pàpa abongisaki mpe malongi ya audience générale mpe ebimaki. Na mokanda monà, alimboli lisolo lya bokutani ya Yezu nà Nikodemo. Abetaki nsete na bosengà ya ¡°kobotama mpo ya mbala ya mibale¡±, mpo nakobima na molili mpe kolanda Kristo. Mwa misato moye  mwa 19 ya sànzà y amarsi, Mgr Alejandro Arellano Cedillo, doyen ya tribunal ya Rote romaine akokamba losambo la sapele na esika Saint-Pierre na ngonga ya 19h30.  

Mpo na kosukisa, mpo na bokono bwa Pàpa, mokano moko mozwami nayino te na maye matali eyenga ya pasika. Eyebani te soki akozala elongo na basusu na milùlù ya eleko semaine sainte. Bansango misusu ekopesama na ndako ya bopanzi nsango.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

20 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 15:45