Papa Franswa alandi ezuzulu ya Karezimo ut'o lopitalo.
Bansango ya Vatican
Pàpa alandaki na nzela ya bilili ezuzulu na Curie romaine ut¡¯o lopitalo ya Gemelli. Ebandaki mokolo mwa lomingo sima ya nzanga na kati ya Salle Paul VI ya Vatican. Ba maniolaki na maye matali ¡°elikya ya bomoyi bwa seko¡±, na lisalisi ya Sango Roberto Pasolini, moteyi ya ndako ya bantomà.
Tata episkopo wa lokùmu, Pietro Parolin, Secrétairerie d¡¯État nà molandi wa yé, Mgr Edgar Peña Parra, bakendaki kotala Franswa na tongo, nzoka ndé asanganaki na Misa elongo nà basàli ya lopitalo. Bo momeseno, Pàpa akobaki kolanda thérapie respiratoire nà motrice nà mpe physiothérapie. Azali kolanda manso maye makomaki ba minganga mpo nakolia malamu.
Manaka ya lopitalo ebimaki o mokolo mwa poso na mpokwa, na ndako ya bopanzi nsango ya Ngendé-Esantu, elakisaki ete ezali na mwa mbongwana moke mpo na bokolongono bwa nzoto ya yé. Sika, likambo la ye etelemi lolenge yoko. Kasi bilembo ya lopitalo etikali nayino na matata mingi ndé na yango baminganga balingi ete etikala sekele mpo na ekenge. Mokanda mwa sika ya minganga ezali kozelisama o mokolo mwa lundi na mpokwa.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.