P¨¤pa azali kozongela lobiko malembe malembe
Bansango ya Vatican
Bokolongono bwa nzoto ya Pàpa Franswa ezali esika yoko, nde yango baminganga oyo bazali kosalisa yé, na lopitalo Gemelli ut¡¯o poso mineyi moleki, babimisi te mokanda ya maladi ma yé mokolo mwa mitano na mpokwa lokola elobamaki. Ezali nde elembo malamu na ndenge mayebisi masika mozali nayino te mpo na mokanda ya baminganga.
Franswa azali kozongela lobiko malembe malembe, ekosenga yé mwa ngonga molayi mpo abika. Mwa mitano alandaki terapi na yé ya boningisi nzoto mpe yakopema, bongo na nsima ya nzàngà, alekisaki yango na losambo.
Nayango, Ndako ya bopanzi-nsango ya Ngwéndé-Esantu alobi ete mayebisi lolenge Pàpa alali na butù ekopesama lisusu te, mpe masolo matongo mokozala susu te, kaka ya mpokwa.
Kaka ndako ya bopanzi-nsango elobi lisusu ete Mokomeli ya etùkà ya Ngwéndé-Esantu, tata episkopo wa lokùmù Pietro parolin, asololaki na nzela ya singa na mokambi ya ekolo ya Ukrayina, Volodymyr Zelensky, oyo atombelaki Tata-Mosantu « Lobiko na lombango »
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.