ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.03.22: Bato ba mobembo ya Diosezi ya Naples mpo ya Yubil¨¦. 2025.03.22: Bato ba mobembo ya Diosezi ya Naples mpo ya Yubil¨¦.  (Vatican Media)

P¨¤p¨¤ alakisi esengo ya y¨¦ mpo na bansambo mpe lisungi

Na yoko liyebisi etangamaki na tongo ya mokolo mwa poso, P¨¤pa Fran?ois andimi ete ayokaki lisungi mpe bondeko (bozalani) ya bandimi. Alobaki yango na Place Saint-Pierre, liboso ya bato bamobembo oyo bawutaki na Naples mpe na badiosezi biayi na bipayi ya Italie kosepela Yubil¨¦. Asengaki na bango bakoba kobondela mpo na y¨¦.

Bansàngo ya Vatican

 

Na yokaki lisungi ya bansambo bosalaki mpo ya ngai. Na yango, atako nakoki kozala pembeni ya bino te, na tombeli bino esengo ya ngai, mpo na yebi ete bozali bomoko na ngai, mpe ngai elongo nà bino, lokola Eklezya kati na Yezu Mokonzi. Ezalaki ndé na mwa maloba maye Pàpa François, na eleko ya maladi mayé na Gemelli ut¡¯o o mokolo mwa zomi na ineyi (14) ya sànzà ya febuali, alakisaki esengo ya yé na bato bamobembo oyo bawutaki na Naples mpe bipayi na bipayi na badiosezi ya Italie. Bayàki o mokolo mwa poso mwa tùkù  mibalé na ibalé(22) ya sanza ya marsi, mpo na kosepela yubile ya elikya. Batangelaki bango liyebisi lya Pàpa yambo ete basàngànaki na Misa na esika Saint-Pierre. Moto akambaki misa mina mozalaki episkopo monene ya Naples, tata episkopo wa lokùmu Domenico Battaglia

François apesaki bango mbote mpe akanisi bango lisusus été «bomoko ndé esangisi bango nà bayangeli babango, lokola lingomba elongo nà bakengeli mpata ya bango, nà episkopo ya Roma». Manso malimbolami na mobembo moyé ya Yubilé bakosalaka. Mosusu ezali mokùmbà ya bango liboso ¡°ya mbèlà ya Kristo mpo ya koyingela o ezibelo eké (Mt 7, 13)¡±. ¡°Bolingo ndé ekosangisa mpe kokolisa na lisàngà, atako banzela babiso bikéséni. Yubilé ememi bang ona nzela kino na lilità ya Mosantu Petro, noki tekozonga ya bino, ezala makasi na boyambi mpe na bomoko na bolingo¡±.

Na nsuka ya kotanga liyebisi linà, Tata-Mosantu abiangi bakristu bakoba kosambela mpo na yé. Mwa mitano na mpokwa, ndako ya bopanzi-nsàngo ya Vatican epesaki liyebisi ya baminganga oyo elobaki ete nzoto ekomi mwa malamu na mayé matali kopema mpe motricité.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

23 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 12:08