ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Na sanza ya misato (marsi), Papa akosambela mpo ya mabot¨¤ mazali na kokoso.

Mpo ya sanza mobimba ya misato (sanza ya marsi) P¨¤pa Franswa abyangi eklezya ya mokili mobimba na kosambela mpo ya mabota mazali na kpokoso. Liboso lya mikakatano mozali kokotisa bokeseni ontei ya mabot¨¤, P¨¤pa alendisi bakristu ete kolimbisa ezongisaka libot¨¤ sika, mpe ekosalisaka bato na kolongola molimo ya mawa, mingi mpenza molimo ya nkanda.

Albys KBD CP, Kinshasa/RDC

 

¡°Libota ezali esika ya yambo epayi wapi bayekolaka kolinga¡±, elobaki Pàpa Franswa na sanza ya motoba (sanza ya yuni) ya mobù 2022, na suka ya bokutani bwa mokili mobimba ya yé nà mabotà na mboka Roma. Mpo ya sanza ya misato ya mobù 2025, Pàpa azwi mokano ya kobonza losambo lya ye mpo ya mabotà bazali na kokoso.

Na bilili bizwamaki yambo akota lopitalo o mokolo mwa 14 ya sanza ya mibale (sanza ya febuali) na lopitalo ya Gemelli, Pàpa akebisaki baye balingi kolota ¡°libota kitoko mpe ekokà na nionso¡±. ¡°Mabotà makokà na nionso ezalaka te¡±, ebetaki yé nsete, mpe alobi ete libota na libota ekokutanaka na mpasi mpe mikakatano.

Moko na moko o kati na libotà azali na ntina mpe akokani sé na yé moko, kasi bokeseni kati na basangani ekoki komeme na bobendani mpe na bozokisani ya mabé.

Kolimbisa ezali eyano ya motuya

Mpo na kobikisa ¡°mpasi ya libotà oyo ezali na mikakatano¡±, Pàpa Franswa apesi kaka eyano moko: nde bolimbisi. Kolimbisa elimboli ete opesa libakù na moninga mosusu.   

 Mokonzi monene ya bantomà esengi ete bato bazwa ndakisa epayi ya nzambe oyo akolimbisaka ¡°manso tango inso¡±. Mpiko ya yé ezali na nsuka te. Akolimbisa biso, akosalisaka biso na koteleme mpe na kobandela. O ntei ya mabotà, kopesa mpe koyamba bolimbisi «ekozongisaka sika libota mpe ekotalisaka biso na elikya kilobi» elobi Franswa.

Libiki lya mitema

Kasi, Tata-Mosantu eyebi ete kaka bolimbisi ekoki na nionso te, ¡°ngolù ya nzambe¡± ndé ekopesa ndingisa ya kolimbisa mpe ekomemaka kimya. Mpo ekobikisa biso na mawa mpe mingi mingi na kanda.

Tosambela mpo ete mabotà makabwani, kati na bolimbisi, bazwa libiki na bampasi ya bango. Bakundola bolamu ya moto mosusu, ata o kati ya bokeseni.  

Kosala losambo mpo ya Tata-Mosantu, ezali moko ya ba¡­. Mineyi epesami mpo na kozwa bolimbi bamasumu na libakù ya yubilé ya elikya, nakoleka na Ezibelo Esantu, ntubela, mpe kokota na misa.

Na Roma, yubile ya mabotà ekosalema kobanda mokolo mwa tuku misato (30) ya sanza ya mitano (sanza ya mayi) kino mwa yambo ya sanza ya motoba (sanza ya yuni), ekozala libakù kitoko epesami mpo na mobù ya yubilé, mingi mingi mpo na kosambela mabotà mamokili mobimba.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi ozala na basango tango inso, mikomisa na mokanda  na biso ya basango na kofina esika eye.

04 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 09:59