ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Mwa t¨´k¨´ mibal¨¦ na sambo (27) ya s¨¤nz¨¤ ya marsi : P¨¤pa, y¨¦mei, as¨¤mbeli mpo ya mokili motungisami na pandemie

O mokolo mwa t¨´k¨´ mibal¨¦ na sambo (27) ya s¨¤nz¨¤ ya marsi na mob¨´ 2020, P¨¤pa Fran?ois akambaki yoko losambo mpo na kosukisa pandemie ya coronavirus. Liboso lya place Saint-Perre oyo etikalaki mpamba (ez¨¤ng¨¤ki bato), mpe na ns¨¦ ya mbula, Mokitani mwa Mosantu Petro, abondelaki mokonzi abikisa mokili motungisamaki. Mpo na y¨¦ : ? moko te akokaki kobikisama y¨¦mei?.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Mibù mitano mileki, mokolo nà mokolo, mokili mobimba monyokwamaki na mpasi ya pandemie ya Covid-19. Bokono bonà bokweyisaki elikya ya kobika. Kasi moto moko kaka, nà elamba ya mpembe, abimaki na nsé ya lopango ya place Saint-Pierre oyo etikalaki mpamba (ezangàki oto). Engumba mobimba ya Roma lokola mpe bisika mingi na mokili, bakangamaki na bandako.

Na nsé ya mbula, nà molili makasi, alekaki yémei liboso; iyo ! Pàpa François atombolaki lolàka o likolo, kobondela mokonzi mpo abikisa mokili oyo mozokaki. Episkopo wa Roma abelelaki minyoko oyo ekolo ya Italie mpe bikolo bisusu ya mabele ya Poto bizalaki koluka nzela ya kobimela na bokono oyo eyebanaki te epayi ewutaki. O tango enà, na Roma, motango ya bato bazalaki kofufa ezalaki na motùyù ya monkàmàlibwà (900) ya bawei na mokolo moko.

Atikalaki yei mei o boso bwa Nzambe, bongo abiangaki nakomona likambo linà ya mpasi lokola eleko esengeli kopono kati na oyo ezali na motùyù, mpe oyo ezangi ntina: ¡°ezali tango ya kozongela kobongisa nzela ya bomoyibwa biso nà Nzambe mpe nà baninga¡±. Akumisaki mosàlà mwa baminganga, basalisi maladi ya basi na babali, nà mpe bato bamosàlà ya bawenze. Abetaki nsété na likambo lya libiki, bongo alobaki ete: ¡°moko tè akobikisama yémei¡±.

¡°« Biso moko tokoki te, bisomei, tokozinda, tosengeli na Mokonzi, lokola batamboli ya mayi na tango ya kala, minzoto. Tobenga Yezu o kati ya ba bwatu ya bomoyi bwa biso. Totikela ye bobangi bya biso mpo ete alongisa yango»¡±

Maloba mayé mazalaki boye : « Biso moko tokoki te, bisomei, tokozinda, tosengeli na Mokonzi, lokola batamboli ya mayi na tango ya kala, minzoto. Tobenga Yezu o kati ya ba bwatu ya bomoyi bwa biso. Totikela ye bobangi bya biso mpo ete alongisa yango»

Na bozangi makasi mpe na bozangi koyeba esika ya kokende (mabungami)ma biso, tozali solo o kati ya bwatu sé moko, tosengeli na kolùka nkayi elongo, elendisaki Mokitani ya mosantu Petro na poso ya mineyi ya eleko ya karezimo ya mobù monà bato bakangemaki na bandako. Kasi mibù mitano molandi (sima), bato batondisamaki na esika enà mpe mokili mobimba, lisàngà, basambelaki mpo na Pàpa François oyo azali maladi na ndako na yé Sainte-Marthe.

Bolanda awa na lokotà ya lifalansa, bilili bizali kolobela ngonga ya losambo oyo ya kokamwa ekambakaki Pàpa François o mokolo mwa tùkù mibale na sambo (27) ya sànzà ya marsi ya mobù 2020 :

 

Bobenisi Urbi et Orbi (na kati ya mboka mpe na libanda na mokili), ngonga ya yoko losambo ya kokamwa, ekambaki Pàpa François o mokolo mwa 27 ya sànzà ya marsi ya mobù 2020

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

28 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 07:37