Mikolo miy¨¦, mikanda koleka 150kg etindami mpo na P¨¤pa.
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/ RDC
Bo bomeseno, Pàpa azwaka mikandà mikowuta mokili mobimba na poso moko, kasi mpo ya mikolo miyé, ut¡¯o akotaki na lopitalo mokolo mwa zomi na ineyi (14) ya sànza ya febuali, bilembo bileki ndelo. Mikanda bakotinda na kombo ya Pàpa François etondi meke. Centre oyo moko ya Fiumicino ekoponaka mikanda ya Pàpa, elobi Antonello Chidichimo moyangeli, ete motango ekokoma kino 150kg na mokolo.
Elembo solo-solo ya Bolingo
Na lisalisi ya système moko ya informatique, mikanda nyonso, yambo ekomi na esika ya liboso bakoponoko yango na Fiumicino, esengeli koleka susu na ba contrôle na ba masini mpo yakobatela bokengi bwa Tata-Mosantu. Sima ¡°Mikandࡱ minà mikokoma na etango ya nordi ya Roma epayi wapi lopitalo ya Gemelli lizwami. Kuna bakopono yango lisusu, bameki bozito bwa yango mpe batindi yango na boite ya plilyclinique oyo Pàpa azwami.
Mikolo miyé, mikanda ekomami mpo ya Pàpa, ezali bébo. ¡°Kokomwa¡±, na komona ete mikanda mikowuta o mokili mobimba, etindami na kombo ya Pàpa, mingi mpeza na eleko eye ya mabé; elobi Andrea Di Tommaso, moyangeli ya bisika baponoko mikanda. Ezali elembo kitoko ya bolingo mpe ya kosàlà elongo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.