?Matondi na banso !? Maloba maliboso ya P¨¤pa Fran?ois ut¡¯o balcon ya lopitalo Gemelli.
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
« Evviva il Papa», ezali bongo milolo, maboko makasi mpe lolàkà la nsai ya bayi-Roma, ba pelerins, mpe ba touriste oyo bazalaki na nsé ya lopitalo Gemelli. Babelelaki mpe baningisaki bendela ya bango tango Pàpa amimonisaki na 5ème etage ya lopitalo Gemelli ya Roma, kobima na yé ya mbala ya yambo, ut¡¯o akotaki o mokolo mwa zomi na ineyi (14) ya sànzà ya febuali. Kobanda mokolo mona, eyokanaki kaka mwa maloba moke na nzela ya micro o mokolo mwa motobà ya sànzà ya marsi, mpe yoko foto (elilingi).
Ebimi yé lopitalo o mokolo moye mwa lomingo la tùkù mibale na isato (23), Pàpa asengeli na sànzà mibale ya kopéma na ndako ya Mosantu Marta na Vatican. Yamvo ya kotika lopitalo, Mokonzi ya yambo ya bantomà apesaki bobenisi mpe mbote na bandimi 3000 basanganaki liboso ya lopitalo Gemelli mpo na kolakisa botondi bwa yé na baye banso basambelaki na eleko ya maladi mayé, balakisaki ye bolingi, basungaki yé na mabondeli, bakengelaki mpo abika. Ut¡¯o balcon ya lopitalo, apesaki melesi na yoko mwasi azalaki kopesa ye mikolo minso na tongo mbeki ya fulele ya langi ya lilala mpe ya mpembe, langi ya Vatican.
Balomingo motobà molandani, pPàpa François akambaki misa te, kasi mateya mayé mopesamaki na makomi ebimisamaki na ndako ya bopanzi-nsàngo ya Vatican. Mpo na lomingo liyé lya misato ya eleko ya karezimo, alimbolaki mokanda mwa santu Luka (lc 13,1-9). Eteni ya nsango Elamu elobeli « mpiko (motema molayi) mwa Nzambe». Asalaki esperience ya motema molayi mwa nzambe, na eleko azalaki na lopitalo Gemelli. Na moni lisalisi ya baminganga, nà ya bayé bazalaki kosunga ngai, bolingo nà likebi babatelaki ngai na maladi. Motema molayi (mpiko) esengeli na bomoyi bwa biso, mingimingi na tango yam pasi mpe minyoko. Ndé mpiko wana ya Nzambi esengeli kopusa bakristu.
Sima ya bokutani na bandimi na mbala ya yambo, sima ya poso mitano ya lopitalo, Pàpa atikaki lopitalo, mpe azongaki na motuka kino na baziliki ya Ste Marie Majeure. Apesaki mbeki ya fulele ba bonzela yango na Ngondo Mosantu Maria mpe azongaki na Vatican.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.