Libateli lya bilenge : P¨¤pa Fran?ois asengi ?mbongwana ya manso?
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Na sànzà ya zomi ya mobù 2024, Commission pontificale mpo na kobatela bana (libateli ya bilenge) ebimisaki yoko lapolo ebongisamaki na ba eklezya ya mboka, mangomba ya bamamelo mpe bikela ya Crie, mpo na kolakisa lolenge kani kosala enkete.
Commission pontificale mpo na kobatela bana (libateli ya bilenge) ebandisamaki na Pàpa François na 2014. Basangani na likita ya yambo ut¡¯o mokolo mwa tukù mibale na ineyi (24) mpe ekosila mwa tukù mibalé na mwambé (28) ya mobù moye ya 2025. Na libakù linà, Pàpa François apesi bango melesi mp ona ¡°botùyà bwa mosàlࡱ bazali kosàla, mpo ezali lokola ¡°oxygène ya baeklezya ya bamboka mpe ba mangomba ya bamamelo¡±.
Na nzela mpo na kobongola nyonso
Mpo na Pàpa, mosàlà ya Commisssion monà, ¡°mopesi kaka lolenge ya kosàlà te kasi mozali kolaka mabongi¡±, oyo mwana na mwana to moto nyonso ya mpasi, azwa solo yoko ezingelo kati na masàngà mya eklezya. Yango ndé motéle ya oyo esengelaki kozala mpo ya biso mbongwànà ya manso.
Liyebisi Pàpa atiyaki mokoloto ut¡¯o lopoitalo Gemelli, ¡°esakoli motùyà ya mosàlࡱ Commission ezali kosàlà, lokola: kopekisa bobebisami ya bilenge ezali te kowelela mwana na ngonga ya likàmà, kasi ezali moko ya biloko oyo ezali kotonga mangombà ya eklezya na loboko ya Nsàngo-Elamu.
Makambo misato ya bomipesi na mosàlà
Tata_Mosantu asengi na basangani ya liyangani monene ya Commision Pontifical mpo ya libateli ya bilenge makambo masàto ya komipesa na mosàlà. Ya yambo ezali: kokolisa boyokani ya kosàlà elongo nà dicastère ya Curie romaine. Ya mibale :¡°koyoka na motema moko¡± bayé bazwaki likàmà, lokola Mo-Samariya malamu. Mpo ete litàtoli ya moko na moko ezwa esika ya bolimbisi mpo kobotama lisusu. Ya nsuka ezali: esengeli ete libateli ekoma yoko monoko bato banso na mokili bakolobaka (elobeli ya mokili mobimba). Na yango, Mokonzi monene ya bantomà asengi na bango na kosàlà elongo nà baye bazali na libàndà ya eklezya, bakonzi bamboka to bamasàngà.
Yoko Monyàmà ya bokengeli kati na Eklezyà
Commission ekolisi monyàmà ya bokengi kati na eklezya, elobi François. Abiangi basàngàni «bazala basinzili oyo bazali kokengele tango mokili ezali kolala mpongi». Pàpa François abalusi miso mayé na avenire (kilobi) mpe alendisi bango na ¡°kokende liboso¡±.
Na bosukisi, Mokonzi monene ya bantomà asengi lisalisi ya Elimo Mosantu mp ona kokweya te ¡°na masenginya ya kobatela mpasi, na esika yakobikisa yango¡±.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.