Fran?ois : azali kobika malembe malembe
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Bandà abimaki na lopitalo Gemelli, manaka ya baminganga epesami lisusus te mpo na bokolongono bwa nzoto ya Pàpa François. Kasi ndako ya bopanzi-nsango ya Ngwendé-Esantu ezali kopesa mayebisi masika. Lokola na mokolo mwa tùkù mibalé na itano (25) ya sànzà ya marsi, balobaki ete, azali kosale oxygène lisusu mingi mingi te na mokolo, boséngà ena ekiti moke moke. Na mokolo moye ya mitano, balobi mpe lisusu ete, na bùtù, esàleli ya oxygène ekiti. Bokolongono bwa nzoto bwayé bozali kobonga malembe malembe na ndenge la kopéma mpe na makoki ya kotambola. Makoki ma moloba mpe ezali kozongela yé malembe malembe. Mokolo mwa tùkù mibalé na motobà (26) ba examen ya makila basàlaki yé, epesaki motùya ya mabé te.
Lolenge ya bopémi na maladi
Pàpa azali kolekisa mikolo mya yé na kozwa bankisi, kasi azali mpe kosàla losàmbo, kopéma mpe kosàla mosàlà. Na moyi, kolongola bayé bazali kosalisa yé, azali mpe koyamba bato asàlaka nà bango pembeni mpo na makàmbo ya misàlà basengeli kosàlà. Mwa mitano na ntongo, Tata-Mosantu alandaki ut¡¯o ndako na ye yakolala, bililingi ya mateya makarezimo ya Sàngo Roberto Pasolini. Nzokandé asalaki Misa elongo na mwa chapelle ya moke ya ndako ya Mosantu Marta, bo momesano.
Poso Esantu
Na mayé matali milùlù mya Poso Esantu, Buro ya ba cérémonies pontificales ebimisaki manaka o mokolo mwa tùkù mibale na sambo (27) ya sànzà ya marsi, kasi eyebani nayino te soki François akozala elongo na milùlù minà. Manso makotalela lolenge nzoto ezali kokende sima ya lopitalo. Kasi mitùnà mibali miyebani nayino ye; esengeli koyeba boni boni ekopesama bobenisi Urbi et Orbi ya lomingo la tùkù mibalé (20) ya sànzà ya aprili nà mpe milùlù ya boluboli ya Mosantu Carlo Acutis lomingo lolandi.
Na bosukisi, bapesaki Pàpa nsàngo ya koningana ya mabelé na ekolo ya Birmaniya mpe na Thaïlandia, bongo asambelaki mpo na bayiké bazwami na likamà linà.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.