ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.03.20 Bato ba bipelengano bya Afrika oyo bavandaka na Ngwende-Esantu, elongo n¨¤ Mgr Peter Turkson, episkopo wa lokumu ya mboka Ghana. 2025.03.20 Bato ba bipelengano bya Afrika oyo bavandaka na Ngwende-Esantu, elongo n¨¤ Mgr Peter Turkson, episkopo wa lokumu ya mboka Ghana. 

Bamemi-nsango bya bipelengano bya Afrika bas¨¤mbelaki mpo ya bokolongono bwa nzoto ya P¨¤pa

Bato ba bipelengano bya Afrika oyo bavandaka na Ngwende-Esantu, bas¨¤mbelaki o mokolo mwa mineyi mwa 20 ya s¨¤nz¨¤ ya marsi mpo ya Tata-Mosantu oyo azali na lopitalo ya Gemelli. Tata episkopo wa lokumu ya mboka Ghana, Peter Turkson, akambaki Misa na crypte ya baziliki ya Saint-Pierre ya Roma. Abyangi nakolikya liboso ya minyoko.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Ut¡¯o Pàpa akotaki lopitalo o mokolo mwa zomi na ineyi (14) ya sànzà ya febuali, mpo na maladi ya bapoumon na ye, makanisi malosambo kidikidi mozwamaki o mokili mobimba, mpo yé abika. Bongo bokolongono bwa nzoto bwa yé bozali bobonga malembe malembe. Na likanisi linà, nzokandé bato ba mopelengano ya Afrika oyo bavàndaka na Ngwende-Esantu, batomboli mpe mongongo na Mokonzi mpo nakosenge likabo ya lobiko mp ona mokonzi monene ya bantomà. Losambo la bango lisalemaki na nsé ya crypte ya baziliki ya Mosantu-Petro ya Roma, na nzela ya Misa likambamaki na episkopo wa lokumu ya ekolo ya Ghana, Peter Turkson. Na mateya mayé, atondoki nayino nzambe mpo ya likabo ya monene ya Bontomà bwa Pàpa; bongo nsima asengaki ete mokonzi apesa yé makasi makoki mpo ua kokoba mosala mwa etindà ya yé .

Mimekano mpe kolikya

Na ndakisa ya liloba lya nzambe ya Lc 16, 19-31, ekolimbola lisolo la moto wa nkita nà mobolà Lazar, episkopo wa lokumu Peter abyangi nakobongola motema mpe kosala bolamu. Momekano ya moto ya nkita ezalaki bongo bobolà na bomoto ya lazar liboso lya ndako ya yé, kasi alongaki yango te. Banso tozali na mimekano ya minyoko, kasi tosengeli kolekisa yango, ekobaki ye nakoloba. Abyangi bato ba mopelengano ya Afrika oyo bavàndaka na Ngwende-Esantu, nakosambela mpo ete, Tata-Mosantu akola na kotiya motema mpe kolikya na Nzambe liboso ya minyoko ; lokola yemei asengi biso mpo ya mobù moye ya Yubilé ya elikya.

Bondeko bwa boko mabele

Nakolimbola ntina ya bolengeli Misa minà, Antoine Zanga, momemi -nsango ya mopelengano ya Cameroun alakisaki bozalani mpe bondeko bwa bikolo bya Afrika na Tata-Mosantu na maloba mayé : «Elongo nà eklezya na mabele ya Afrika, tozali kobelela likabo ya bokolongono bwa nzoto mpo na Pàpa François, totondi nzambe botondi mpo na mwa ntango eye yakobika ya Tata-Mosantu oyo asengeli nayino na bansambo ya biso». « Molende na eyamba ya biso, tokolikya été Mokonzi akozongisa na makasi ya kotelema, mosali mwa yé, mpo nakokoba etindà apesaki yé. Bongo tokosambela mpo été Tata-Mosantu yémei azala na elikya na Nzambe», afungoli Yubilé eye ya elikya, tolingi asepela yango elongo nà biso mpe asukisa yango ; esukisaki Antoine Zanga.     

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

21 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 13:43