ÐÓMAPµ¼º½

Luka

IL PAPA TORNA IN VATICANO, TAPPA A SANTA MARIA MAGGIORE IL PAPA TORNA IN VATICANO, TAPPA A SANTA MARIA MAGGIORE  (ANSA)

Audience g¨¦n¨¦rale : Nzambe azali mawa mpe akozela biso o eleko inso

Na mateya na ye ebongisamaki mpo na audience g¨¦n¨¦rale ya lelo mokolo ya misato 26 ya sanza ya misato, kasi esalemaki te likolo ya nzoto ya Papa. Na mateya yango Papa abeti nsete na mosala ya mwasi Samaritaine elobamaki na Nsango Elamu ya Yoane. Na bolobi mingi na bokutani na libulu ya mayi kati na Yezu mpe mwasi ena, Santu Papa alendisi mpo ya ¡°kotika bozito ya oyo eleka ya biso na makolo ya Yezu¡±, mpe mingi mpenza ya kobungisa elikia te.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Nsima ya mateya na ye ya mposo elekaki  eye etalaki bokutani ya Yezu na Nicodème, Papa François abiangi lelo ya komanyola bokutani ya Yezu na mwasi Samaritaine oyo azalaka na mibali mitano, mpe azali kofanda na mobali ya motoba oyo azali mobali na ye te. Motuya motoba ezali ya bongo bongo te, elobi episkopo ya Roma, kasi « ekolakisa mingi mpenza likambo ebongi nanu te. Tango mosusu elingaki kolakisa mobali na ye ya sambo, oyo akokokisa mposa ya mwasi oyo alingama ya solo. Mobali ena ekoki kozala kaka Yezu». Andimaki te akokutana na mobali na libulu ya mai na midi, na botali ya solo, azalaki na elikia te tè akokutana na moto. ¡°Ezali bongo pamba tè azalaki na nsoni ya bomoi na ye, amiyokaki lokola basambisi ye, bapesi ye etumbu, bayoki ye te, mpe mpo na wana amibendaki pembeni, akataki bagbagba na bato nionso¡±, elimbolaki Santu Papa.

Yezu azali na mposa ya libiki ya mwasi Samaritaine

Liboso ya mwasi Samaritaine Yezu azali moto ya yambo ya koloba mposa na ye: ¡°Pesa ngai mai!¡±. Na bobandi lisolo, ¡°Yezu amilakisi ya kolemba, na bopesi kimia na mosusu, na boyebi ete azali na bobangi te. Mposa ya mai, ata na Biblia, ezali elembo ya bolingi¡±. Kasi awa, ¡°Yezu azali liboso liboso na mposa ya libiki ya mwasi ena¡±, elobi ye. Mokonzi ayebaki bomoi na ye, mpe mwasi alingaki abeta nsete na likambo ya eyamba eye ezalaki kokabola bayuda na bato ya Samaria. ¡°Yango ekomelaka biso ntango mosusu o eleko tosambelaka, elimbolaki Papa: ntango Nzambe asimbi bomoi na biso na mikakatano na yango, tomibungisaka ntango mosusu na makanisi maye mikolakisa biso ete losambo ebongaki¡±. Na bosolo, ekobaki ye, ¡°totelemisaki mapango ya bomibatela¡±.

Boyokani mpe Nsango Elamu

Na mwasi Samaritaine, Yezu apesi ye oyo ebombanaki mosika: ayebisi ye Tata, oyo asengeli akumbana na molimo mpe na bosolo, mpe ayebisi nani ye azali, Ye moto azali ¡°Messia¡± oyo akoki kongengisa bomoi na ye. Ezali ya solo likambo ena ya komiyoka ete olingami nde ebotaka mosala. ¡°Nsango nini ye akoki komema, soki kaka likambo na ye ya bayoki ye, bayambi ye, balimbisi ye? Ezali elili eye esengeli etinda biso tokanisa koluka lolenge ya sika ya kopanza nsango elamu¡±, elimbolaki Papa François. Mpo na kosakola Nsango Elamu, Santu Papa, abengi moko moko atika liboso liboso bozito ya lisapo na ye na makolo ya Mokonzi, ya kozongisela ye bozito ya oyo eleka ya ye, pamba tè kaka bato bayokani bakoki komema Nsango Elamu¡±.

Alobi bongo ete ¡°Yezu akozela biso mpe azali kaka na eleko tokokanisa ete elikia ezali lisusu te mpo na biso¡±. Mpo ya bosukisi, Papa François alendisi mpo ya kobungisa elikia te, ¡°atako lisolo na biso ezali kilo, mobulu, ntango mosusu ebeba, tozali na ngonga nionso ya kozongisa yango epayi ya Nzambe mpe ya kobandela nzela na biso. Nzambe azali mawa mpe akozela biso o eleko inso¡±, elobaki ye.

26 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 19:38