ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Balomingo mineyi milandani, Mokonzi monene ya bantom¨¤ azali kaka na lopitalo ya Gemelli na mboka Roma, mpe akoki kokamba losambo la Angelus te. Balomingo mineyi milandani, Mokonzi monene ya bantom¨¤ azali kaka na lopitalo ya Gemelli na mboka Roma, mpe akoki kokamba losambo la Angelus te.   (AFP or licensors)

Angelus : Volontariat ezali elembo ya elikya, liboso ya mposa ya mombongo.

Na mateya abongisaki mpo na Angelus mwa mokolo mwa 9 ya sanza ya marsi, P¨¤pa Franswa atondi botondi na ba volontariat, mpo bazali bilembo ya elikya ¡°na ba soci¨¦t¨¦ ya biso etondi na mposa ya mombongo¡±. O kati ya lopitalo ut¡¯o mokolo mwa 14 ya febuali, Tata-Mosantu alimboli y¨¦-moko ete sika ¡°ayekoli kozala na ekenge mpe kosunga na mosala¡±. Ayoki mawa mingi mpenza mpo ya ekolo ya Syrie epayi wapi mobulu ezongeli. Bongo abiangi lisusu na kimya mpo na bikolo bizali kati na bitumba.

Bansango ya Vatican

 

Balomingo mineyi bilandani, Mokonzi monene ya bantomà azali kaka na lopitalo ya Gemelli na mboka Roma, mpe akoki kokamba losambo la Angelus te. Mateya mayé malengelamaki mpo ya lomingo lo libwà (9) ya sànzà ya misato (Marsi), ebimisamaki na Vatican. Nzokandé na poso moye, basepeli mokolo mwa mokili mobimba ya bato bakosalaka mosala na bolingo kozanga koluka mbano (lifuti). Mpo na Pàpa Franswa, bazali solo basàkoli mpe bilembo ya elikya. Na esaleli ya bango, ¡°bazali kotàtola bondeko, lisalisi ya babolà, mpe mosala ya ofele ezali eloko ya yambo.¡± Abosani te na lisolo na yé kotonda botondi na bayé bazali kosambela mpo ete azongela bokolongono bwa nzoto mpe mpo ya kimya na mokili.

Tala ndé makomi Tata-Mosantu alengelaki mpo ya libakù liye:

 

Bandeko babali mpe basi

Mwa misato moleki, nà milùlù mwa mputùlù, tobandaki bongo eleko ya karezimo. Mikolo tùkù mineyi ya mobembo mpo na kobongola motema mpe tokoto na esengo ya Pasika. Tosalani makasi mpo ete ekomela biso eleko ya bopetolami mpe bozongeli na molimo. Karezimo ezala nzela ya kokola na boyambi, na boliky mpe na bondeko.

Na tongo moye, na esika ya Mosantu Petro, Misa mosalemi mpo na Yubilé ya baye basalaka volontariat. Na ba société ya biso etondi na mposa ya mombongo, epayi wapi manso masengeli koluka kaka bozwi ya yemei, koluka lifuti, volontariat ezali esàkoli mpe elembo ya elikya; mpo bazali kotàtola bondeko, lisalisi ya babolà, mpe mosala ya ofele ezali eloko ya yambo. Na banso bamipesi na mosala monà, na tondi bango botondi, elobi Tata-Mosanto. Matondi mpo na kobonza ngonga mpe bokasi bwa bino mp ona bozalani (bondeko), bolingo oyo bosungaka basusu, na kolamusa elikya kati na bango.

Na sima alobeli mikolo azali kolekisa na lopitalo; bandeko babali nà basi, ut¡¯o na koti lopitalo, na yekoli mingi mpenza na ba dokotolo mpe balifulume, kozala na ekenge mpe kosunga na mosala, na yango na tondi bango botondi. Bongo na zali kokanisa mingi na baye bazali pembeni na bato na maladi (bakoni), bazali bongo elembo ya nzambe mpo na  bango. Tosengeli na bato ya bolingo oyo bakomema mwinda na baye bazali na mpasi mpe bakoki kosala makamwisi ya boboto.

Na lingi kopesa melesi mpe na bayé banso bazali pembeni na ngai na losambo. Ngai mpe nazali kosambela mpe mpo ya bino. Nakosangana mpe na molimo nà baye banso bako banda ezuzulu na Curie Romaine.

Elongo tokoba kobelela likabo ya kimya; mingi mpenza na ekolo ya Ukrayine, Palestine, Israele, Liban mpe na Birmanie, Soudan nà Republique ya Démocratiki ya Congo. Na zali na mwa mpo na yoki bozongeli ya mobulù na bitukà ndenge na ndenge ya ekolo ya Syrie. Nakolikya ete esila libela na limemya mpo na bato, ba ethnies mpe bamamelo bazali kotonga ekolo.

Na tiki bino banso na bolobeli ya bomama ya Ngondo Maria. Lomingo lolamu mpe to monani.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

 

09 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 22:31