Angelus : kovivre Karezimo, mpe mingi mpenza Yubil¨¦, lokola eleko ya kobika
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Ebimaki yé na lopitalo Gemelli ut¡¯o lomingo loleki, Pàpa azali kolekisa mikolo mya yé nakozwa nkisi, kosambela, kopema mpe mosàlà. Sé na lisàngà nà bandimi, akabolaki mateya mayé mpo ya lomingo loye la esengo (laetare) mpo na kobongisa bongo esengo ya nsékwà ya Kristo na Pasika. Na kolimbola matangi mwa mokolo moye, molobeli moùlani mwa mwana abùngami (Luka 15, 1-3, 11-32), François apesi ndakisa na elembo ya tata oyo, alakisi biso ngolu ndelo nsuka te ya Nzambe mpo ya bato banso.
Ngolù ya Nzambe ekobyanga biso nakolinga baninga ba biso
Na nsango elamu ya Mosantu Luka ya lomingo loyé, Tata-mosantu alimboli ete, Ba-farizeo ¡°esika ¡®te basepela, bazali koyima-yima sima mwa mokongo mwa Yezu, mpo basumuki bakei epayi ya y顱. Na yango ndé Yezu abeteli bango moùlani mwa tata moko nà bana bayé babàli bàbalé. Moko (mozimi) atikaki ndako, mpe ayei komonana na bokeleli, alapi azongela tata oyo, ayambaki yé na esengo. Bongo mosusu, ¡°mwana wa botosi¡± asilikelaki tata wa yé mpe aboyaki kokoto o lopango kosepela. Na ndakisa ya bato baye basato, Pàpa amonisi boni boni Yezu alakisi biso motema mwa Nzambe: ¡°bobele motema Ngolu na banso, abikisi ba mpota ya biso mpo ete tomilingana biso na biso lokola bandeko¡±.
Mpo na lomingo loyé la mineyi la karezimo, episkopo wa Roma abyangi bakristo na kovivre eleko eye ¡°nà mpe ya Yubilé, lokola eleko ya libiki¡±. Bongo apesi melesi na motema wa yé mobimba na bayé banso, na elilingi ya Mobikisi, bazali bilembo bya libiki mpo ya bazalani babàngo: na maloba, na bwanya, na bolingi mpe na losàmbo.
Na bosukisi malendisi ma yé, Pàpa atalisi ete maladi mpe kolemba na nzoto ezali ba esperianse tokosàlàka biso banso elongo, ¡°kasi, banso tozali bandeko na libiki Kristo apesi biso¡±.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.