ÐÓMAPµ¼º½

Luka

ÐÓMAPµ¼º½ Francis continues treatment at Gemelli Hospital, in Rome ÐÓMAPµ¼º½ Francis continues treatment at Gemelli Hospital, in Rome  (vincenzo livieri)

Papa na Gemelli: atungisami na mpema na ntongo

Fran?ois, atako azali kobela makasi, alekisaki mokolo na kiti. Esengelaki kozongisa ye makila.

Jean-René Bompolonga

Na communiqué ebimaki mokolo ya poso 22 ya sanza ya mibale, ndako ya bapanzi nsango ya Vatican elobaki ete Santu-Papa azali « kobela makasi», atako « abimi nanu na likama te ».

Na ntongo, « mpema y¡¯asthme etungisi ye ngonga ebele, esengelaki basunga ye na oxygène »

Lisusu, « ba analyses ya makila bisalemaki lelo bilakisi ete ba plaquettes bizali te na makila, esangani n¡¯anémie eye etindaki bazongisa ye makila ».

Bongo, « lobi eyebani te », kasi « Santu-Papa azali ya kotala mpe alekisaki mokolo na kiti, atako azali kobela koleka lobi ».

Angélus ezali na eyenga ya lelo 23 ya sanza ya mibale te

Na ntongo ya lelo, ndako ya bapanzi nsango ya Vatican eyebisi ete François akokamba losambo y¡¯Angélus na midi te, kasi mokanda na ye ya bomanyoli ekopesama na bato.

Se bongo, Santu Papa asengelaki kokamba misa ya bosukisi Jubilé ya ba diacres na basilique Santu-Petelo na eyenga ya lelo 23 ya sanza ya mibale, Mgr Rino Fisichella, pro-préfet ya dicastère ya Bopanzi nsango elamu akokamba misa ena. Ye, akotanga liteya Papa François abongisaki mpo na molulu ena.

 

23 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 13:08