ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Lopitalo ya Gemelli ya Roma epayi wapi bandimi bazali kos¨¤ngana mokolo na mokolo mpo ya losambo. Lopitalo ya Gemelli ya Roma epayi wapi bandimi bazali kos¨¤ngana mokolo na mokolo mpo ya losambo.  (ANSA)

P¨¤pa Franswa alalaki malamu mpe azali kop¨¦ma.

Ndako ya bopanzi nsago ya Ngwende-Esantu esakoli o mokolo mwa mineyi ¡®te, butu ya Tata-Mosanto elekaki malamu mpe na kimya.

Ba nsango ya Vatican

 

Papa alalaki malamu na bùtù mpe azali kopèma, ezali bongo nsango ya sika epesamaki o mokolo mwa mineyi na tongo mwa 27 ya sanza ya febuali na Ndako ya bopanzi nsago ya Ngwende-Esantu.

Na mpokwa ya mokolo mwa misato mwa 26 ya sanza ya febuali, mikanda mya nsuka ya scanner esalaki Franswa, molakisaki ete bokolongono bwa nzoto ezali kokola mwa malamu. Nayino nsima ya nzanga, asalaki misala bo momeseno. Kasi motuya ya bokono etikali mwa sekele mpo ya baminganga.

Balobaki lisusu ete na tongo sima ya kolamuka, Pàpa aliaki, mpe akobaki na lisalisi ya monganga. Asalaki mpe ba examen misusu, mpe azali kokoba na kozwa mopepe (oxygénation). Azalaki na esengo mpo ya ba nsango bapesaki yé na losambo bazali kosala mpo na yé. Bongo mateya mwa yubilé mwa mokolo mwa poso esilaki kolongolama.

Na ngonga ya nzanga, misa moko esalemaki o kati ya chapelle Santu Yoane-Polo ya mibale (Saint Jean-Paul II) ya lopitalo ; ekambamaki bongo na molandi ya diosezi ya Roma, Episkopo wa lokumu Baldo Reina. Akumisaki na mateya ma yé bokasi ya losambo. Basali ya lopitalo, bandimi mpe bana kelasi bazalaki o milùlù mya Eukaristya ena.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

 

27 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 11:24