Papa apemaki malamu, butu mobimba
Jean-René Bompolonga-Kinshasa
« Papa apemaki malamu, butu mobimba ». Ndako ya bapanzi nsango ya Vatican epesi nsango ena na ntongo ya lelo. Na bolobi oyo etali bokono bwa Santu Papa, ebakisaki ete « ayoki mwa malamu moke ».
Episkopo ya Roma « atungisamaki na mpema y¡¯asthme te » mokolo ya yambo ya 24 ya sanza ya mibale mpe ba examen misusu asalaki « bilobi mwa kobonga moke ».
Mokanda na ye ya bokono ya lobi mokolo ya yambo elakisaki ete « insuffisance rénale ekotungisa te » mpe « bazali kokoba kopesa ye oxygène, kasi na ndenge ya makasi lisusu te ».
Mokolo ya yambo na mpokwa, na esika ya Santu Petelo, bana ya Nzambe basangani na episkopo ya lokumu Pietro Parolin, mpo na kosambela mpo na bokono ya Papa. Ba episkopo ya lokumu, ba episkopo, bato ya Curie romaine, ba nsango, ba laïki, bandimi ya bikolo kilikili, basalaki losambo ya sapele lisanga, o eleko ya mikolo 11 ya bokoti ya Papa na lopitalo Gemelli.