ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.02.19 Ricovero di Papa Francesco al Gemelli 2025.02.19 Ricovero di Papa Francesco al Gemelli 

Na lopitalo Gemelli, Papa alekisi butu na kimia

Azali na lopitalo kobanda 14 ya sanza ya mibale, Fran?ois alamuki na ntongo mpe azui petit-dejeuner na ye na kiti. Wana nsango epesami lelo na Vatican mokolo ya minei ya ntuku mibale ya sanza ya mibale.

Jean-René Bompolonga

Nsango ya lelo mokolo ya minei ntuku mibale ya sanza ya mibale, na likambo etali bokono ya Papa François, Vatican elobi ete butu ya Santu Papa « ezalaki malamu ».  Papa « azui petit-dejeuner na ye na kiti ».

Na mokanda lopitalo ebimisaki lobi na pokwa na Ndako ya bapanzi nsango ya Vatican, bokoni ya episkopo ya Roma elakisami lokola ya « kotelema » na « mwa kobonga malamu ».

Lobi na nsima ya zanga, Papa François ayambaki Giorgia Meloni, Ministre wa Yambo ya Italie, elobaki ndako ya bulamatari ya Italie. Atombeli na Papa lobiko na lombangu na kombo ya bulamatari mpe ya bana ya Italie. ¡°Nazali na esengo ya kokuta ye malamu¡±, elobaki mama ministre wa Yambo na bobakisi ete: ¡°Tosololi lokola momeseno. Abungisi lolenge na ye ya kosekisa te¡±.

Ba nsango ya pembeni mpe mbela ya kosambela mpo na bokolongoni ya Santu Papa bizali kowuta bipayi binso na mokili. Kobanda Italie to lisusu ekolo na ye Argentine, na boleki na Nicaragua, Philippines, Brésil, Belgique, Portugal mpe bikolo bisusu, ba Eklezia mpe lisanga ya bandimi bakolendisa na boyambi Papa François na losambo.

 

 

20 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 11:13