Na lopitalo, Fran?ois akondima nkisi kasi abimi nanu na likama te
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Motangisi na biteyelo ya likolo Sergio Alfieri mpe monganga Luigi Carbonne bazalaki liboso ya bapanzi nsango mokolo ya mitano 21 ya sanza ya mibale, poso moko na sima ya Santu Papa akota lopitalo.
Liboso ya kokota lopitalo Gemelli Papa François azalaki na ndako Santu-Martha mpo na bozui ba nkisi. Na mokolo ya mitano ya 14 ya sanza ya mibale Papa atindamaki na lopitalo Gemelli mpo na botali bokono na ye na ndenge esengeli, na ba toli ya monganga na ye Luigi Carbone apesaki. «Sik¡¯oyo abandi koyoka malamu», minganga mibale balobaki. Babeti nsete na bolobi: ¡°Azali na likama ya liwa te¡±, mpe babakisi ¡°motema na ye ezali malamu¡±.
Kasi, ¡°abimi nanu na likama te¡± mpe akotikala na lopitalo Gemelli ¡°poso mobimba ekoya¡± mpo na bolandi bozui nkisi mpo na bokono na ye ya mpema. Bokono na ye ya mpema ewuti na infection ezali na ba mikrobe ebele biye bizali kosenga balandela ye malamu na minganga. Papa François azali ¡°moto azali kobela na bolembi ya mibu 88¡± mpe ye moko ayebi kibolembi na ye. Ayebisaki yango epayi ya minganga ye moko. Papa François azali moto moko alingi kosala mingi mpe kokota lopitalo ezali nzela se moko ya kotinda ye apema.
Alembi mpo azosala mingi
¡°Boyebi moto mosusu ya mibu 88 azali kokamba Ekolo moko mpe azali lisusu tata ya molimo ya ba katoliko nionso ya mokili?¡±, etunaki Sergio Alfieri ya lopitalo Gemelli. Na yango ba minganga balobi ete mpo na libiki na ye esengeli afanda lisusu na lopitalo poso mobimba.
Papa azali malamu, akotelema, akotanga, akosala, akotia maboko na mikanda, akolekisa ngonga na chapelle ya lopitalo, elobaki motangisi Sergio Alfieri, kasi azui bokono moko ekomi chronique eye ekozala na ba eteni moko ya makasi. Mpo na wana, ba minganga balingi afanda na lopitalo mpo bakengelaka ye.
Na oyo etali nsango kobanda akoti o lopitalo, eleki poso moko, ¡°nionso ekomami na mikanda na ye ya bokono ezali ya solo¡±, ba minganga balobi yango. Nionso ekomami na bango banso lisanga. Papa ye moko asengaki na minganga babomba eloko moko te ya bokono na ye.
Ba minganga mibale balobi ete Papa azali kozua nkisi ¡°lokola bato banso ya bokono¡± mpe asengeli na bopemi: ¡°Ye Papa kasi azali moto¡±.