ÐÓMAPµ¼º½

Luka

ITALY-VATICAN-POPE-HEALTH ITALY-VATICAN-POPE-HEALTH  (AFP or licensors)

Mokanda ya audience g¨¦n¨¦rale : Anna mpe Sim¨¦on, ? ba pel¨¨rins ya elikya"

Na liteya na ye abongisaki mpo na audience g¨¦n¨¦rale ya mokolo ya mibale ya 26 ya sanza ya mibale, Papa Fran?ois azongelaki eleko ya bolakisi Yezu o tempelo mpe mingi mpenza na bilongi y¡¯Anna, mama ekomba ya profeta Samuel mpe ya mobange Sim¨¦on baye bamonaki libiki na Mwana Yezu.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Lokola poso elekaki, Vatican abimisi mokanda Papa François abongisaki mpo na audience générale eye elingaki esalema lelo mokolo ya misato ya 26 ya sanza ya mibale, kasi esalemaki te likolo ya bokono ya Papa.  Na liteya ena, Papa akobaki molongo ya bomwana ya Yezu mpe azongelaki mingi mpenza na bolakisi Yezu na tempelo ya Yelusalema.

 

Tala mokanda Santu Papa abongisaki mpo na lelo

Mbote, bandeko ya mibali mpe ya basi!

Lelo, tokomanyola bonzenga ya ¡°Yezu Kristu, elikya na biso¡± (1Timothée 1,1) na mobombano ya bolakisi ye o tempelo.

Na makomi ya bomwana ya Yezu, mokomi nsango elamu Luka alakisi biso botosi ya Maria mpe Yosefu na Mobeko ya Mokonzi mpe na mikano na ye nionso. Na Israël, ezalaki na lotomo te ya kolakisa mwana o tempelo, kasi baye bazalaki kobika na boyoki Liloba ya Mokonzi mpe balingaki kotosa yango, bazalaki komona yango lokola eloko moko ya motuya.

Yango esalaka Anna, mama ya profeta Samuel, oyo azalaka ekomba. Nzambe akokisi losambo na ye mpe azui mwana mobali, amemaki ye na tempelo mpe akabelaki ye na Mokonzi mpo na libela (cf. 1Sam. 1, 24-28)

Luka akoloba bongo eteni ya yambo ya bobondeli Yezu, esalemi na mboka esantu, Yelusalema, oyo ekozala esika na ye ya kokoma ya mosala na ye kobanda eleko ye akozua mokano makasi ya komata kuna (cf. Lk 9,51), mpo na bokei kosukisa mosala na ye.

Maria na Yosefu balingaki te kosangisa Yezu na lisapo ya libota, ya bato, na lisanga na Mokonzi Nzambe. Babateli ye mpe bakolisi ye, bayingisi ye na mopepe ya boyambi mpe ya losambo. Bango moko malembe malembe bakoli na bososoli mbela moko eleki bango na mosika.      

Na tempelo, oyo ezali ¡°ndako ya losambo¡± (Lk. 19,46), Elimo Santu akoloba na motema ya mobange moko, Siméon, elama moko ya ekolo esantu ya bana ya Nzambe, abongisama na bozeli mpe na elikya, oyo azali kokolisa mposa ya bokokisi ya bilaka Nzambe asalaka na Israël na nzela ya ba profeta. Siméon ayoki na Tempelo bozali ya Mopakolami ya Mokonzi, amoni mwinda ekopela na kati ya bato ¡°bazali na molili¡± (cf. Is. 9,1), mpe akei na bokutani na mwana wana, lokola profeta Isaya alobaka, ¡°abotami mpo na biso¡±, azali mwana mobali oyo ¡°bapesi biso¡±, ¡°mokonzi ya boboto¡± (Is. 9,5). Siméon apesi ekopi na mwana ena, mwana mpe azali na makasi te, apemi na maboko na ye: nzokande ezali ye, na bosolo, azui mbondi mpe botondi ya bomoi na ye na bokangi mwana na maboko na ye. Alobi yango na loyembo moko etondi na botondi, eye ekoma na Eklezia losambo ya nsuka ya mokolo.

¡°Okoki sik¡¯oyo, Mokonzi, kotika mosali na yo

akende na boboto, lolenge ya liloba na yo,

mpo miso na ngai bimoni libiki na yo

ebongisamaka na yo liboso ya bato banso:

mwinda mpo na kolakisa yo na bikolo

mpe nkembo ya Israël, ekolo na yo¡± (Lk. 2,29-32)

Siméon akoyemba esengo ya moto oyo amoni, oyo andimi mpe oyo akoki kolekisa na basusu bokutani na Mobikisi ya Israël mpe ya bikolo. Azali nzeneneke ya boyambi, oyo azui lokola likabo mpe akoyebisa na basusu, azali nzeneneke ya elikya eye elembisaka nzoto te; azali nzeneneke ya bolingo ya Nzambe, oyo akotondisa motema ya moto na esengo mpe na kimia. Atondi na mbondi ena ya molimo, mpaka Siméon akomona liwa lokola nsuka moko te, kasi lokola bokokisi, botondi, azali kozela ye lokola ¡°ndeko ya mwasi¡± oyo akobebisa te kasi oyo akokotisa ye na bomoi ya solo oyo asili ayokaki mpe oyo akondima.

Mokolo ena, Siméon azali ye moko te amoni libiki ekomi nsuni na mwana Yezu. Ezali se bongo mpo na Anna, mwasi moko ya koleka mibu ntuku mwambi, akufela mobali, amipesa ye nionso na mosala ya Tempelo mpe na losambo. Na bomoni mwana, Anna akokumisa Nzambe ya Israël, oyo asombi ekolo na ye na mwana wana, mpe akoloba yango na basusu, na bopanzi kaka boye liloba ya ba profeta. Loyembo ya libiki ya ba mpaka mibale efungoli bongo bolobeli ya Jubilé mpo  na bato banso mpe mpo na mokili. Na Tempelo ya Yelusalema, elikya ebotami lisusu na mitema pamba tè Kristu, elikya na biso, ayingeli kuna.

Bandeko ya mibali mpe ya basi, biso lokola tolanda Siméon na Anna, ba ¡°pelèrins ya elikya¡± baye bazali na miso polele bikoki komona koleka ba apparences, baye bayebi ¡°koyoka¡± bozali ya Nzambe na oyo ya moke, bayebi koyamba na esengo boyeneli ya Nzambe mpe kobakisa lisusu elikya na motema ya bandeko ya mibali mpe ya basi. 

26 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 20:03