ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2023.03.20 Mitra mpe bonet, bilili ya bilembo ya boponami ya Boepiskopo 2023.03.20 Mitra mpe bonet, bilili ya bilembo ya boponami ya Boepiskopo  

Mgr Koudougou, aponami episkopo ya Tenkodogo na ekolo ya Burkina Faso

Na tongo mwa 6 febuali, Tata-Mosantu a ponaki sango, David Koudougou episkopo ya Tenkodogo ekolo ya Burkina Faso. Moko ya bakonzi ya eklezya ya Tenkodogo, Mgr Koudougou azalaki kokamba diosezi ena tee na mokolo ya lelo lokola Mokambi (administrateur)

Bansango ya Vatican

 

Abotamaki  o mokolo mwa 1er ya sanza ya Augusti ya mobù 1972 na Tenkodogo ekolo ya Burkina Faso, Mgr David Koudougou asalaki kelasi ya yé ya filosofi mpe téologi na selinele monene ya Saint-Jean-Baptiste ya Wayalghin, na Ouagadougou, mboka mokonzi ya Burkina. Akulaki bonganga o mokolo mwa 14 ya yuli o mobù 2001, bongo asalaki ut¡¯o 2001kino 2002 lokola Sango-Molandi ya paloase Sacré-C?ur ya Garango yambo yak osala na oyo ya Boussouma ut¡¯o 2002 kino 2006.

Asalaki kelasi ya likolo bongo akomaki dokotolo na Droit Canoniki na université pontificale Grégorienne ya Roma kobanda 2013 tee 2016, Mgr Kougougou azalaki molakisi ya droit canoniki mpe ya homiletiki na seminele monene ya Saint-Pierre-Claver na Koumi ut¡¯o 2009 kino 2013. Episkopo ya sika azalaki Sango-Molandi ya paloase ya Saint-Paul-de-Moaga, officiel ya cour métropolitaine ya Koupèla, mokomeli monene ya comision ya ba episkopo ya bazuzi ya eklezya mpe ya misala etali kosambisa bato ya lisanga ya baepiskopo ya Burkina-Niger. Asalaki mpe mosala ya motindami ya episkopo na coseil diosezin ya botangisi ya bakatoloko ya diosezi ya Tenkogogo bandà 2017 tee 2023.

Ut¡¯o 2023, azali officier du Tribunal ecclésiastiki mpe moko ya collège ya ba consulteurs ya diosezi ya Tenkodogo mpe administrateur diosezin ya Tenkodogo.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

07 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 13:32