Butu mosusu ya kimia mpo na Papa na Gemelli
Ndako ya bapanzi nsango ya Vatican elobi lelo mokolo ya mitano ete Papa Fran?ois alamukaki mpe azuaki petit-d¨¦jeuner na ye. Nsango ena ekolakisa bosolo ya eye epesamaki lobi loleki ete Papa ayoki mwa malamu moke.
Jean-René Bompolonga
¡°Butu elekaki malamu, na ntongo ya lelo Papa alamuki malamu mpe azui petit-déjeuner na ye¡±. Wana ezali nsango epesami lelo mokolo ya mitano ya 21 ya sanza ya mibale na ndako ya bapanzi nsango ya Vatican na oyo etali bokono ya Papa na lopitalo.
Mokolo ya minei na mpokwa, mokanda ya lopitalo elakisi ete Papa ayokaki ¡°mwa moke malamu¡±, esembolaki lisusu ete ¡°azali na fefele te botamboli ya makila na nzoto ezali malamu¡±.
Toyokaki epayi esusu tè François atungisamaki na maladi ya mpema, azali kokoba kopema ye moko, mpe motema na ye ezali kaka malamu.
21 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 12:15