Butu elekaki malamu mpo na Papa Fran?ois
Ndako ya bapanzi nsango ya Vatican epesi nsango lelo ete ¡°Papa alalaki malamu mpe azali na bopemi¡±. Mpo na oyo etali bokono ya episkopo ya Roma, lokola balobaki lobi na mpokwa, ¡°ezali malamu te¡± kasi mpema etungisi ye te.
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
¡°Butu elekaki malamu, Papa alalaki mpe azali na bopemi¡±. Wana ezali nsango Ndako ya bapanzi nsango ya Vatican epesi lelo mokolo ya liboso ya 24 ya sanza ya mibale na oyo etali bokono ya Santu Papa.
Mokolo ya eyenga na mpokwa, mikolo libwa ekotaki Papa o lopitalo, epesamaki nsango tè ¡°Papa azali malamu te¡±, kasi ¡°atungisami lisusu te na mpema¡± kobanda mokolo ya poso na mpokwa. Makila na ye ezali kobonga, atako ba examens misusu bilakisi ete ¡°mwa mokakatano ezali na ba rein¡±. Ba minganga bazali kotala na bokebi likambo yango ya rein mpe bazali kopesa ye kaka oxygène.
24 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 12:47