Bakambi babwaki mbela na kotiya molende mpo ya kosukisa bitumba
Albys KBD, cp ¨C Kinshasa/RDC
«Na mobù moye ya Yubilé, na zongeli kobwaka mbela ya ngai, mingimingi mpenza na bakambi bya bakristu, basala makasi nakotya manso mpo na boyokani zambi mpo yakosukisa bitumba ezali koleka», ebeleli Pàpa ut¡¯o lininisa ya ndako ya bantoma na nsuka ya losambo La Maria la Angelus.
Tata-Mosantu akozangaka soki moke te kotelemela likambo ya bitumba soki azwi maloba oboso bwa bato : « Na zongeli koloba to boyi bitumba ezali kobebisa nyonso, ekobebisa bomoyi mpe ekokotisa boyini». Wana lisusu, abiangi moko na moko na kokanisa ete «bitumba ezali elonga te (bopoli)»
Bosambela mpo na Nord-Kivu, Ukraine, ProcheOrient
Tata-Mosantu atangaki na ngonga ya zanga bisika bebo (ebele) ya bitumba. Nsima ya bokutani nà bilzenge ya Ukraine, batondisamaki na mitunà y antina lokola: - ¡°Ezali na litomba kokufa mpo ya ekolo? Boniboni tokoki kokolisa boyambi bwa biso kati na bitumba mp ona bomoyi, tango yemei bomoyi ayei kozanga ntina?¡± ¨C Pàpa asengaki lisusu losambo mp ona ekolo ya Ukraine enyokwami ¡°bomartiro¡±.
Franswa alobi ete na Proche Orient esika wapi bakangaki ba-Israel mpe bato na boloko ya ekolo ya Palestine, basili kobimisa bango na bangonga ewuti koleka. Asengi losambo mpo na ekolo ya Palestine, Israel mpe Liban, nà mpe Biemanie oyo ekoti na mibù tuku mitano (50) ya bitumba ya ba civils nsima ya coup d¡¯Etat ya basodà na 2021.
Bansambo ya Pàpa esalemi mpe mpo ya bayé banso bazali konyokwama na bitumba na ngambo ya moniele (Esti) ya ekolo ya Républik Democratiki ya Congo, mingi mingi na Nord-Kivu oyo mboka mokonzi Goma ebotolami na batomboki ya M23 basimbami na bitulukà ya ekolo ya Rwanda. Na esika ena, bato bazali na bobangi makasi. Batata Episkopo babango babiangi bango nakotikala na bandako babango. Bazangi mayi nà biloko ya kolya, mingi mpenza na bayé batikà mboka ut¡¯o mibù tuku misato ya matata. Engumba ya Goma ezwami na miliyon moko y abato lolenge y ona baye bakimi.
Koyamba likabo ya bomoyi na bozangi kobanga
Na tango ya Bitumba, bomoyi ebebisamaka, ekati Tata-Mosantu oyo amemi lisungi lya yé na bayé bavandi na Italie; eklezya esepeli bongo lomingo lya mokolo mwa bomoyi. ¡°Bobanga te mpo ya koboto bana¡±, etalisi bongo Franswa mama na likambo mwa mokolo monà, kokabola (kolekisa) bomoyi, elikya moko mpo ya mokili.
Pàpa apesi losako lolenge yoko na moziki ya Ba-italie Pro-Life, basepeli mibù tuku mitano yabango, nakoloba ete ¡°Na sangani na ba episkopo ya Italie mpo ya kotondo botondi ebele ya mabota bayambaka likabo ya bana na pete mpe mpo na kolendisa bilenge na kobanga te kobota bana¡±.
Liyangani makasi etali lotomo ya bana
Na bosukisi Pàpa alobeli liyangani ya bikolo na mokili mp ona lotomo ya bana, na théme ya ¡°Tolinga bango mpe tobatela bango¡±, akokamba o mokolo mwa 3 febuali na Ekolo ya Vatican. Ezalaki ¡°na libaku moko ya kobenda maanisi y abato ya mokili mp ona makambo etali mitunà ya lombango ya bomoyi ya bana ¡±, Papa abiangi bandimi nakosangana na losambo na yé mpo ekende malamu.
Lokola na momeseno ya poso inso, Tata-Mosanto epesaki mbote na bandimi bawutaki na ekolo ya France mpo ya koyoka yé naplace Saint-Pierre, na baye mibale yakayi na Marseille mpe na Nanterre.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa