ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.01.10 batindami ya projets Ecole de Vie(s)  elimboli ete: Kelasi ya (ba)bomoyi) na ekolo ya France 2025.01.10 batindami ya projets Ecole de Vie(s) elimboli ete: Kelasi ya (ba)bomoyi) na ekolo ya France  (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Mpo ya P¨¤pa, bilenge ya mikolo na biso basengeli na mateya manso

P¨¤pa Frabswa ayambaki na tongo ya mokolo mwa 10 ya sanza ya yanuali babandisi ya projet projet Ecoles de Vie(s) (Kelasi ya (ba)bomoyi) na ekolo ya France, bazali kos¨¤l¨¤ mpo na kotombola (kokolisa) masolo (bosololi) kati n¨¤ bato ya mbula bikeseni mpe koyamba bokeseni bimonan¨¤ okati ya baeteyelo, mpo ya kobongolo mango na bisika malamu ya bomoyi. Mokonzi monene ya vatican abeti nsete na bot¨´y¨¤ ya kotiya moto liboso na ba projet nyonso ya mateya.

Albys KBD cp ¨C Kinshasa /RDC

 

¡°Projet moko ya kotangisa etie liboso Nsango Elamu mpe doctrice sociale ya Eklezya¡±, ndé bongo Pàpa bengi yango projet Ecoles de Vie(s), ebandaki na France na 2023. Na lisalisi ya Mgr Philippe Cristory, episkopo ya Chartres, babandisi ya projet wanà bakutanaki na Mokonzi monene ya Vatican mokolo mwa mosàlà mitano mwa 10 ya sanza ya yanuali.  

 Na elongi ya Yezu, kondima bolembù ya basusu

Ezali nde bokebi na moto ndé esimbi Pàpa na projet wana ya sika. ¡°na bomipesi na bino, bozali kosakola ete eloko moko te ezali mpamba to ezangi lokumu, lizalisi nyonso ezali likabo la Nzambe esengeli koyamba na bolingo mpe limemya¡± esakoli-ye. Ndakisa ya Yezu, ezali na motùyà mp ona Franswa, mpo ete ¡°Kristu asimbaki bato na maba, asololaki na baye babwakà mpe ayambaki nà bolingi bayé banso batalelami lokola bato mpampba¡±.

Boyambi ya bolembù ya basusu, elimboli mpo na Tata-mosantu Eklezya oyo ezali kobima, ¡°Eklezya oyo ezali ya kofungwama mpe ekoyambaka, ekoki na bozalani na moto nyonso, akosukolaka ba mpota ya bayé bazoki, kobondo bayé bazangi bolingo, mpe ekotombolaka bayé banso bakweyi na mabél顱.

Na etando ya Chartre, mosika mingi te na Paris, projet ya Kelasi ya (ba)bomoyi ekomisami mpe elingi kobongola bakelasi na bisikà ya solo ya kosombitinya bomoyi, oyo bokeseni endimisami. Na maloba mosusu, baprojets bizali bébo (mingi): koyamba basenior lokola bayeé basalisaka ya ofele o kati ya kelasi to kotya mwa ndako mpo ya bana mike mpe koyamba bato oyo basengeli na lisalisi (bazali na makoki ya kosala bango moko te) o kati ya kelasi ya boyekoli mpo na bilenge.

Mateya ekotiya ndelo te mpo nako lekisa (kopesa) boyebi

Franswa alobelo lotomo ya babandisi ya projet ena nako kundolisa bana ete ¡°bomoyi bwa bango ezali n antina, nayango bazali na lotomo moko yakosalela yango kati na bato¡±. Esengeli kotangisa (koteye) bato bamayele na mosala, esengeli mpe kotangisa basi mpe babali bazali na makoki ya koyoka mawa mpe ya bolingo bwa bandeko oyo bakozala basali ya mokili moko ya kitoko eleki mpe ya bomoto, ebakisi Tata-Mosantu.

Mateya mana manso, mikobosana ata mokete makambo ya molimo, ezali eyano ya moyùyà mpo na kotonga solo lingoma moko ya bosembompe bondeko, ekobaki ye, nakolendisa lotukà ya bato ayambaki na kokoba kati na etindà kitoko oyo ya kotangisa.   

¡°Tika ete, mosàlà na bino efungola makanisi mya sika mpo na kotangisa makambo manso oyo bilenge ya mikolo na biso basengeli na yango na lombango¡±, esukisaki Mokonzi monene ya Vatican.

 

Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa.

10 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 21:12