Audience ya jubil¨¦ : Koleka Ezibelo Esantu lokola Yoane Mobatisi
Albys KBD cp ¨C Kinshasa/RDC
Malongi ya yambo ya mobù ya jubilé epesi na Pàpa ndingisa ya kolobela mwa makambo ya elikya, vertu théologale.Vertu ewuti na liloba virtus na lokotà ya latini, elimboli ete « bokasi», kasi alobi été elikya ezali bokasi oyo tokosengaka.
Bokonzi bwa Nzambe, Ndingisa monene ya sika
¡°Yango tomikomisi batamboli: toyei kosenga likabo, mpo ya kobandela na nzela ya bomoyi¡±, elobi ye na bozindo, nakolobela libatisi ya Kristu oyo ekosalema o mokolo mwa lomingo na Eklezya Katoliko. Mpo ya Franswa, Yoane Mobatisi azali profeta monene ya elikya. ¡°Azali ya monene koleka kati na baye banso babotami na mwasi¡±, lolenge liloba nsango elamu ekomamaki na Mosantu Luka ekokanisa biso o eteni ya sambo (7), molongo mwa tuku ibale na mwambé (28). Episkopo wa Roma abiangi bongo nakoleka Ezibelo Esantu, na elilingi ya Yoane, oyo akatisaki mbù Yordani mp ona kokota na mabele ya malako.
¡°Kobandela, kozwa lisusu na mbala ya sika mabele, lokola na kala¡±, ebeti nsete mokitani wa Petro. Abakisi ete elikya ezali mobimba na bokeseni oyo. ¡°Tala likamwisi: Koyambo bokonzi bwa Nzambe ekokotisa biso na makambo manene ya sika. Ndé yango mokili nà biso banso tosengeli!¡±.
Mposa ya solo ya kobandela
Franswa ayebi été biso mpe, lokola Mobatisi na boleki o boloko, tomitunaka mingi mingi mpo ya mobembo ya biso. « nyonso mpo ya ba Herode oyo bakotiyaka lisusu tembe na bokonzi bwa Nzambe», esakoli ye nakolendisa ba miliers ya bandimi : « na zali okati na ngayi na mposa ya solo ya kobandela ? Na zali na mposa ya koyekola susu na Yezu oyo azali monene? Oyo aleki moke na bokonzi bwa Nzambe, azali monene».
Nakosukisa mateya mayé, Pàpa alobi ete kozonga na komituna ekoki kozalà bitikà ya Yoane-Mobatisi: ¡°Elikya mpo ya Ndako wa biso ya lisangà, mabele oyo ebebisami mpe ezoki, oyo ezali ya biso, mpe ezali elikya mpo ya bato banso bapémi na bokeseni bwa nzambe. Bonene bwa yé bokeseni¡±. Talani kobandela na biso ya sika, jubilé ya biso, ebwaki ye.
Sambelani mpo ya kimya
Nakolobela baye balobaka lokotà ya italien, nakopesa bango mbote nsima ya mateya, Pàpa a bwaki lisusu mbela ya losambo mpo na kosukisa matata na mokili. ¡°Tobosana soki moke te ete bitumba ezali bobele elonga te!¡± ebakisi Franswa lokola na tango ya malongi manene ya mokolo mwa mosàlà misato. ¡°Sambelani mpo ya bikolo bizali na bitumba, mpo ete kimya ekomela bango¡±, esakoli yé.
Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa.