Audience : kobebisa bana ezali malamu te mpe mabe makasi
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Bana bazali kotindama « na misala ya mpasi mingi », « baùmbu ya mosala mpo na kindumba to ya pornographie », na « mabala na makasi ». Papa François akoloba mabe « lolenge ebele ya bobebisi bana mpe ya bonyokoli bango ». Monyokoli ena ezali likambo moko « ezali malamu te mpe mabe makasi », ¡°eloko mabe mpo na bato mpe likambo moko ekoki koboma moto », « kobuka na mabe makasi bitinda ya Nzambe ». Na mateya na ye na ndako ya makita Polo ya motoba na Vatican, Santu-Papa alobi lisusu ete ¡°esengeli te kobebisa mwana moko. Likambo moko kaka ezali ya koleka¡±. Mpo na wana esengeli ¡°kolamwisa makanisi, kosalela bozali pepepene mpe bomoko eye elongobani na bana mpe bilenge banyokwami¡±.
Lolenge nini mabe ya boye bizali kokoma? Papa alakisi mosapi na ¡°bosenga eye ekomi mokili mobimba, bozangi bisalelo ya bato mpo na kosunga mabota, kotia batu misusu pembeni¡±, ¡°bozangi mosala mpe mpasi¡±. Na nsuka, ¡°bana bakomi na mosala ya kotekisa bangi mpe na makambo ya mabe ya ndenge na ndenge¡±, elobi François, na koyoka mawa ndenge basusu bakokoma kutu ¡°babeti¡± ya bana misusu. Wana ezali kosalema na nse ya miso na biso kasi tokobwaka miso bipayi misusu, elobi ye, na bolobi likambo ya Loan, elenge y¡¯Argentine eye bayibaki mpe kobanda mokolo wana abunga, akoki kozala victime ya mosala ya kotekisa bilama ya bato.
Kotonga lobi ya malonga mpo na bato banso
Santu Papa alobi lisusu ¡°bokabwani kati na bato ekondimama te, kati na baye bakoki kolota na baye basengeli kokufa¡± mpe mingimingi lokola ¡°Yezu alingi tozala banso bansomi mpe bato ya esengo¡±. Wana bosengi ya Mokonzi oyo esalami mpo na biso banso ya ¡°kotelema mpe koyoka mpasi ya baye bazangi mongongo ya koloba, batangi te¡±. ¡°Kobundisa monyokoli, lokola eye ya bana, ezali kotonga lobi ya kitoko mpo na bato banso¡±, elobi Papa, na bokumisi maloba ya mibeko ya bana maye bindimami na bikolo ebele.
Liboso ya mabe mana, François akolendisa mpo na kozala moto akosunga mabe ya mosala ya bana te, na boboyi kosomba ndakisa bilamba to bilei bisalemi na ¡°bana bazali konyokwama, baye bazali kosala na esika ya kokende kelasi¡±. ¡°Moko moko akoki kozala eteni ya mayi moko eye, na biteni bisusu ebele, akoki kokoma ebale moko¡±, alendisi bato. Nzela esusu, ¡°koyebisa lisusu na bakambi mikumba na bango, na kati wana bakambi ya eklezia, mpe ya ba kompani¡± baye ¡°bakoki kosala bokeseni na bopesi mbongo na bango na ba kompani maye bilukaka to balingaka mosala ya bana te¡±. François abeleli mpe bapanzi nsango mpo na bolobeli mingi likambo ena. ¡°Bobanga koloba yango te¡±, alobeli bapanzi nsango.
Ndakisa ya santu Teresa ya Calcuta
François akokumisa ¡°baye banso babwakaka miso te o eleko bazali komona bana bakotindama na makasi kokoma mikolo na lombangu¡±. Atangi santu Teresa ya Calcuta oyo akoki ¡°kosunga biso mpo na komona bana bazali komonana te, baùmbu ebele ya mokili moko eye tokoki kotika ekweya na bozangi bosembo te. Pamba tè bolamu ya baye bazangi makasi ekotonga boboto ya banso¡±.