ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Udienza generale di Papa Francesco Udienza generale di Papa Francesco  (ANSA)

Audience G¨¦n¨¦rale: mosala ya Maria ebimisi mozindo ya elikya na Nzambe

¡°Maria ayambi Liloba na mosuni na ye, mpe amipesi bongo na mosala monene etikala kopesama na moto te¡±. Papa alobi bongo lelo mokolo ya misato ya ntuku mibale na mibale ya sanza ya yambo na mateya na ye ya audience g¨¦n¨¦rale na ndako ya makita Polo ya motoba. ¡°Mama ya Mobikisi amikotisi na mosala, lokola moumbu te, kasi lokola moto alingi asala elongo na Nzambe Tata, atondi na bomoto mpe bokonzi mpo na kokonza¡±

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Na mateya na ye ya ¡°molongo ya Jubilé etali Yezu-Kristu, elikya na biso¡±, Santu Papa alobaki mingi na bosangeli na Maria, na lisungi ya makomi ya santu Luka. Mopanzi nsango elamu akolakisa misala ya nguya ekoki kobongola likambo ya Liloba ya Nzambe, ¡°eye emonani na ndako ya mobola ya elenge mwasi, Maria, eye, alonganaki na Yosefu, azalaki naino kofanda na libota na ye¡±.    

Kozala mama ya ¡°Mesia¡±

Na Maria, angelu amemeli ye nsango eye elobama te, kino motema na ye etungisamaki. ¡°Na lolenge mbote epesamaka ¡®kimia ezala na yo¡¯, Gabriel alobi na Maria na bobengi ¡®sepela¡¯, mbela moko ya motuya na lisolo eye ebonzama¡±, elobi lisusu François. Archange Gabriel ayebisi lisusu na Maria mosala na ye: eye ya kokumba kati na ye Yezu oyo kombo elingi koloba ¡°Nzambe akobikisa¡±. Liloba ewuti likolo, mpe ekobenga Maria azala ¡°mama ya Mesia ya mwana ya dawidi eye azelamaki mingi, akozala mokonzi, lolenge ya bato mpe ya mosuni te, kasi lolenge ya likolo mpe ya molimo¡±.

¡°Kombo na ye ekozala ¡°Yezu¡±, eye elingi koloba ¡°Nzambe akobikisa¡± (cf. Lk 1,31; Mt 1,21), na bolobeli na biso mpe mpo na libela ete ezali moto te abikisaka, kasi Nzambe ye mei¡¯.¡±

Kososola mpe kozala na kondima na Nzambe

Atungisami na kobota ena ya ye moko mpe ya lolenge ya kokamwisa, Maria ¡°na mwasi ya mayele, elobaki santu Papa, aluki ayeba nini ezali kokomela ye, na bososoli". Amanyoli, ¡°na mozindo ya motema na ye efungwami mpe ekoningana¡±, bobengi ya ¡°kozala na kondima na mobimba na ye na Nzambe¡±. Ngondo, lokola ¡°mwinda moko ekongengisa bisika ebele¡±, lokola Théophane alobi na ¡°Canon na ye ya Bosangeli¡±, amipesi, atosi mpe apesi esika: azali ¡°eteni ya ndako mpo ya libala esalemi na Nzambe¡±.

Na mosala ya Nzambe lokola moto akosala na ye elongo

¡°Maria ayambi Liloba na mosuni na ye, mpe amipesi bongo na mosala monene etikala kopesama na moto te¡±, elobaki episkopo ya Roma. ¡°Amikotisi na mosala, lokola moumbu te, kasi lokola moto alingi asala elongo na Nzambe Tata, atondi na bomoto mpe bokonzi mpo na kokonza, lokola asalaki na Cana, makabo ya motuya ya Nzambe, mpo ete mingi bakoka kotoka na maboko nionso¡±, ebakisaki Papa.

Na bosukisi mateya na ye, Papa abengaki moko moko na ¡°koyekola epayi ya Maria, mama na biso¡±, ya ¡°kotika matoyi na biso bifungwama na Liloba ya likolo, ya koyamba mpe ya kobomba yango, mpo ete ebongola mitema na biso na tabernakle ya bozali na ye, na ba ndako bizali koyamba baye balembi mpe bazali na mposa ya elikya"

22 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 16:44