Angelus: P¨¤pa abiangi bato nakokanisa mwa bango mokolo ya libatisi
Albys KBD cp ¨C Kinshasa/RDC
Na eyenga eye ya libatisi ya Mokonzi, Papa François abiangi bandimi bakanisa na ntina ya libatisi la bango moko. Ezalaki ¡°na molimo mpe na makolo mpamba¡± (tala Mk 1:7-11) nde bato bakendaki na komikitisa mpo na kobatisama na Yoane, François alimbolaki, nakozongela maloba ya loyembo ya liturgie ya mokolo monà. Mpe ntango Yesu azwi batisimo, ezali bomimonisi ya Nzambe oyo azali kaka te komonisa elongi ya ye kati na Mwana wayé, kasi azali koyoka mongongo na ye elobi: ¡°ozali Mwana wa ngai molingami; na yo nazwi esengo ya ngai¡± (v. 22).¡± Tata amimonisaka na nzela ya Mwana, mpe ¡°atye boyokani ya ntina mingi mpo na kokota na masolo mpe lisangà nà bomoto¡±. Ndé bongo, elambo ya libatisi ya Mokonzi ¡°ezali kotinda biso tómanyola elongi mpe mongongo wa Nzambe, oyo emonisami na bomoto wa Yesu¡±.
Franswa akobaki boye: ¡°bongo, tómituna: toyokaka ete Nzambe alingaka biso mpe akotambola elongo na biso, to tokanisaka ete azali mosika na biso? Tozali na makoki ya koyeba elongi yayé kati na Yesu mpe epayi ya bandeko ba biso ya mibali mpe ya basi?¡±. Yambo ya kotanga losambo la Maria, Pápa Franswa asukisaki na kobengisa bandimi mpo na komikundola mokolo ya batisimo ba bango mpe kosepela yango lokola mobù mwa sika ¡°oyo ya mbotama ya moto yemei na Molimo mwa Nzambe¡±. Tata Mosantu asengaki mpe losambo mpo ya bana babotami sika tuku mibale na moko (21), oyo babatisamaki na ntongo wana na Ndakonzambe ya Sistine. ¡°Nalingi kosenga Nkolo, mpo na balongani banso ya bilenge, mpo ete bazala na esengo ya koyamba likabo lya bana mpe komema bango na libatisi¡±, elobaki yé.
Bondeko na baye bazwi likàmà na Los Angeles
Na nsuka, Pápa asengi na bandimi oyo basanganaki na Place Saint-Pierre babeta maboko mpo na mwaesengo Giovanni Merlini, Nganga-nzambe ya ekolo ya Italie na lingombà ya ba Missionnaires ya Makila ya Talo, oyo balubolaki na mokolo mwa lomingo, na tongo, na Bazilika ya Mosantu Yoane ya Lateran. Don Giovanni Merlini azalaki mosakoli ya ba missions populaire mpe mobondi (mopesi toli) ya Pápa Pie IX. ¡°Tika mpe tobelela bolobeli bwayé ntango tozali kosambela mpo na kimya na Ukraine, na Moyen-Orient mpe na mokili mobimba,¡± elobi Franswa, nakosenga na moto nyonso kobondela mpo na kimya na mokili mobimba.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa