Sierra Leone: Babomi Sango Augustine Amadu
Bansango ya Vatikan
Makambo ya kobomama eyebani naino malamu te. Nzokande, bapolisi bandimaki ¡®te babomi bakotaki na ndako na nzela ya lininisa. Bapolisi lakaki ¡®te, bazali koluka luka, mpe basengi na bato basangana na kopesa mpe kokabola nsango inso ekoki kosunga komema na bosembo baye basali mbemba oyo ya somo. Nzoto ya mowei, Sango Augustine Amadu, ezali sik¡¯awa na ebombelo ya bibembe mpo na kozela komema yango na Freetown mpo na kosala lipaso.
Mokambi ya Caritas Freetown mpe mokambi ya lisanga lya basango ya Sierra Leone akweisaki likambo liye ya mabe mpe ya soni; bongo abondelaki ¡®te ¡°Mokonzi apesa bwanya, mpiko mpe lombangu na bato oyo bazali kosala mosala ya koluka luka n antina ya likambo liye mpo ¡®te bosembo bosalema¡±.
Sango Amadu: Mokambi ya bomikitisi, ya bomipesi, mpe ya bolendisi
Nsango eye ya mawa ekotisaki buluyeke (ebulunganisaki) bakristu ba paloase mpe bato basusu ya dioseze. Bandimi bayiké bazali koyanganaka mp ona losambo la butù mpe kokengela na mabondeli Kenema. Bato Bato mingi bamonisi ye lokola mokambi ya bomikitisi, ya bomipesi, mpe ya bolendisi. Mpamba te, asimbaki bomoi bwa bato ebele na nzela ya batoli na ye ya molimo. Liwa lya ye etikaki bato nà mpasi o motema, epesaki mawa mingi. Na yango bazali kosenga lisusu bokengi ya sika ya makasi o kati ya engumba.
Kobungisama (to liwa) ya somo
Sango Amadu autaki kotindama na paloase St. John oyo ezwami na etúká ya Kailahun mpe azalaki komibongisa mpo na kolongwa na Kenema nsima ya bambula ebele ya mosala na molende. Bato mingi balobi ¡®te liwa lya ye ya mbalakaka ezalaki ¡°mpasi monene¡± kaka mpo na eklezya ya Katolike te, kasi mpe mpo na bato ya Kenema mpe ya bamboka bisusu.
Bakonzi ba eklezya, ba organisation ya société civile mpe bato bamboka, bazali kosenga bosembo na lombangu, mpo bazali kobanga ¡®te mobulu ebakisama, bongo ekoki mpe kobebisa boboto mpe kimya na etuka.
Awa bazali kokoba na kolukaluka, bato ya Lingomba ya Katolike mpe bato ya engumba Kenema batkali bomoko mpo na kolela, ba kolikya ¡®te bosembo bokosalema.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.