Zubil¨¦ ya bilenge esili: bilenge koleka milio moko bazongi ba ndako na esengo mpe na elikya
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
Na komona yango ut¡¯o likolo, ezali lokola ndako ya nselele ya monene, ya bato koleka milio moko, oyo bazali na bambula kobanda 18 kino 35. Baùtaki na bikolo 146 ya mikili, oyo bayambaki Léon XIV na ngonga ya 7h40 ya mokolo ya lomingo na ntongo. Na mokolo mwa lomingo, mpo na ebele ya bato oyo bazalaki, mutuka oyo Pàpa atambolaka na yango na makolo, eumelaki pene na miniti 40. Wana azalaki koseka mpe kopesa bato mbote, Pápa amonaki bankóto mingi ya bilenge bazali kopota mbangu mpo na kopesa ye mbote.
Kosilisa bokabwani mpe bokeseni bwa mposo ya nzoto
O kati ya bilenge bazalaki na zubilé ya mobu moye mosantu, bato bamobembo ya Italie, ya Espagne, na mpe ya Syrie, Ukraine, Corée ya Sudi, to mpe ya Republiki Demokratiki ya Kongo. Na nsima ya bendela ya RDC ezalaki kopepa na mompepe, etuluku moko ya bato soki 20 oyo bazalaki kosala mobembo, batelemaki pembeni ya bifelo ya esika A. Bakómaki na ntongo mwa mokolo mwa poso mpo na kopesa mbote na Léon XIV mpe mpo na kosepela na Zubilee.
Gabriel autaki na Lubumbashi. Mobembo mwa ye na mpepo eùmelaki mikolo mibale, kasi azali na mawa te, mpamba te, alobi : «toyei mpo na kosangana elongo na bilenge bya mokili mobimba ». Na tango RDC ezali koleka eleko ya ya mikakatano, elikia ezali na ntina mingi koleka. Bongo na bozongi bwa ye o mboka ya ye, Gabriel azali na mokano ya komema nsango ya esengo mpe ya eyamba. Na esengo nyonso, alobi ¡®te: ¡°Awa tozali kolongola bokabwani, tozali kolongola bokeseni bwa mposo¡±.
Bendele ya mission vietnamienne ya Paris etombolami na lolendo na bokula ya bipekiseli, etuluku ya bilenge tukù mitano oyo baùti na Vietnam basimbanaki na maboko mpo na kosangana na losambo. Nathalie azali na mibu tukù mibale na minei (24 ans) mpe azali na mwa koseka oyo ezali kopesa ye nzela ya kosolola na bato, elenge mwasi wana azwi ¡°makanisi¡± na maloba ma Léon XIV na ntina ya bilenge. Nsima ya poso moko ya esengo, amiyoki ¡®te azwi mpema ya sika:
¡°Komona ebele ya bilenge bazali na mposa ya kosala mosala, bazali na bomoko, mpe bazali na boyami sé moko, epesaki ngai makasi, epesaki ngai nguya. Solo mpenza, nazali na mokano ya kokoba kosakola Nsango Elamu na nzela ya ba réseaux sociaux, na nzela ya maloba ya malamu, kaka na mungongo makasi¡±
Kokutana mpe kozala na likàmà
Banso balalaki na mabele, na tapis to na matela ya moke, kasi bango banso bazalaki kaka na koseka, mpo bazalaki na elikya ¡®te makambo manso oyo bamonaki na miso ma bango ekotikala bobele kati na bango. Mpo na Apolline, elenge mwasi moko ya mibu tukù mibale na sambo (27ans) ya mboka France, oyo amesaná na mikolo myango ya JMJ, zubile eye ezali libaku ya kokolisa boyokani, ya «koyeba moto mosusu na kati ya bolembu bwa ye». O mopanzi mwa ye, Damien, elenge mobali ya mibu tukù mibale na mwambe (28ans), oyo azali pembeni na ye, azali komona bomoko ya Lingomba ya mokili mobimba oyo ezali koyangela na etando ya Tor Vergata.
Na ntango ya boboto bwa Kristu, bomoko emonanaki polele ntango bilenge bayambanaki mpe banzinganaki na bikopi nsima ya kolekisa ntango elongo, na misa ya pápa.
Bozali mungwa mwa mokili
Liboso ya kokatisa ebele ya bato na papamobile, mpo na mbala ya nsuka, Léon XIV akanisaki bilenge ya Gaza, na mpe lisusu oyo ya Ukraine, «mbote na bilenge biye bakokaki te koya awa elongo na biso, baye bakokaki te kotika mabele ma bango mpo na bantina oyo toyebi» . « Bino bozali mungwa mwa mabele mpe mwinda mwa mokili. Bomema Nsango eye ya esengo mpe ya elikia», elobaki ye. Atombelaki mingi penza bilenge ya Corée ya Sudi oyo bazalaki wana, mpe bakoyamba mikolo mya bilenge ya mokili mobimba na sanza ya mwambe ya mobù 2027.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.