ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.08.27 O kati ya Campo ya katoliko na Gaza, yoko mamelo azali kosakana na bilenge bana, na paloase Sainte-Famille.  2025.08.27 O kati ya Campo ya katoliko na Gaza, yoko mamelo azali kosakana na bilenge bana, na paloase Sainte-Famille.  

Sango Romanelli: Tozala na ngambo ya baye bazali konyokwama, lokola Mokonzi asengi biso

Sango-Mokonzi mpe basango mosusu ya paloase ya Sainte Famille na Gaza baponi kokoba ¡°kosunga baye bazali na bosenga: mibange, bato ba maladi¡±. ¡°Etumba ezali se kokoba mpe babombi ezali kosila te, bato bazali na mposa ya biloko binso¡±, elobi sango na bapanzi-nsango ya Vatikan. Kasi, abakisi ¡®te, ¡°tozali na maboko ma Nzambe mpe tozali na elikya ¡®te na lisalisi lya bato baik¨¦ bya motema bolamu na mokili mobimba, makambo manso makosila¡±.

Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC

 

¡°Tozali awa mpo na Yesu Kristu, mpo na kosalela ye nà Ukaristya, mpe kosalela ye na ntina na babola, na bato ba maladi, mpe na baye bazali konyokwama¡±. Sango Gabriel Romanelli mpe basango oyo bazali elongo na yé na lopango ya paloase ya Sainte Famille na Gaza, baponi kokoba kozala pembeni ya bato oyo bazali na bosenga mpe ¡°kosalela bato banso¡±. Soki tolongoli sango Romanelli, na parwasi basango bisusu ya Institut du Verbe Incarné bafandaka, na mpe bamamelo ya libota lyoko ya lingomba lina, mpe bamamelo ya Madre Teresa. ¡°Biso banso tokaboli likanisi moko¡± sango ayebisi bapanzi sango ya Vatican- ¡°Na komona bosenga ya babange, ya baye bazali na mitungisi, ya ba oyo bazali na mawa, ya ba oyo bazali na bwalé, ya ba oyo bazali na maladi, bakoka, tozali kososola ¡®te Mokonzi azali kobenga biso mpo na kokoba kosalela bango, mpamba te soki te, boniboni bato baye bakoki kobika, lolenge nini bakoki kobimela ?¡±

 Kosambela mpo ya Kimya, kosukisa etumba

Nganga-nzambe mpe basango basusu basanganaki na mbela oyo epesamaki na mokolo mwa mosala mibale, mwa 26 ya sànzà ya Augusti elongo na Patriarche ya Latin ya Yeruzalema, Episkopo wa lokùmu Pierbattista Pizzaballa, mpe Patriarche ya Greke ya Ortodokse ya Yeruzalema, Théophile III. Bazali kosengá, ¡°bakonzi ya mokili mobimba mpe ba oyo bazali na nguya ya kosukisa etumba eye ¡®te, bátika yango mpo na bolamu bwa bato banso¡±. Abakisaki ¡®te, ¡°Tozali kokoba kobondela mpo na kimya, mpo na bonsomi ya baye banso bazangi yango, mpo na bakangami, mpo na likoki ya kosalisa bankoto nà bankoto ya bato ya maladi mpe ya bato bazoki, kasi bazali kozwa te lisalisi oyo basengeli na yango na Gaza mobimba¡±.

Patriarche ya Jérusalem: Bobengani bato na makasi na Gaza,  "etumbu to bokitisi na liwa"
Patriarche ya Jérusalem: Bobengani bato na makasi na Gaza, "etumbu to bokitisi na liwa"   (AFP or licensors)

Kobuka, kokufa mpe kozoka

Ezali nde na engumba ya Gaza epai wapi likambo lyango ekómi mabe koleka, ut¡¯o mwa baposo oyo euti koleka. Misala ya basodá ezali kokoba, kobwakama ya babombi ekomi makasi na biteni ndenge na ndenge ya engumba. Sango Romanelli alobi t¡¯e, ¡°ezali nà bato ebele bakufi, mingi babebisami, mpe bato mingi bazoki. Ezali bongo lolenge makambo mazali koleka na Gaza. O mikolo mizali koya, nde ekotiya moto nyonso na kati ya kidiba to ya kozanga koyeba, mpamba te, likambo oyo ya etumba ezali kokokoba. Kobanga ezali mpo a mbala ya sima, tembe te, ekoki kozala etumba moko na ekosalema bobele o kati ya engumba ya Gaza. Na yango, Sango asengaki lisusu ¡®te etumba esila. ¡°Awa, na bosolo mpe na komikitisa mingi, tozali kokoba. Ezali likambo ya pete te, kasi tozali na maboko ma Nzambe, mpe tozali na elikya ¡®te na lisalisi ya bato baiké ba motema bolamu o mokili mobimba, mokolo moko, maye manso makosila.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

27 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 16:43