ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Sango Norbert Abekan amemi o maboko ma ye , sacramentu esantu santu ya Ukarstya.  Sango Norbert Abekan amemi o maboko ma ye , sacramentu esantu santu ya Ukarstya.   (AFP or licensors)

Sango Abekan: ¡°Elongo na Maria, tozali kosambela mpo na kimya¡± na C?te d¡¯Ivoire

Na bopusani ya maponomi ya mokambi wa ekolo, ekosalema o mokolo mwa 25 ya s¨¤nz¨¤ ya zomi, Commission ¨¦piscopale Justice, Paix et Environnement ebandaki molongo ya mabondeli mpo na kimya na mboka, kobanda mokolo mwa 15 ya ao?t kino mwa 25 ya oktobere. Na ntina ya matata ezali kokoba na kati ya mopelengano ya mboka. Secr¨¦taire ex¨¦cutif abengaki lisanga mobimba ya bakristu mpo na kosenga lisungi ya Maria, ¡°Mama wa biso boboto¡±. Asengi masolo mpo ya guvernema ya sika mpe na opposition C?te d¡¯Ivoire.

Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC

 

O mokolo mwa mosàlà minei mwa zomi na minei ya sànzà ya augusti (14 août), mokolo oyo ezali liboso ya feti ya Assomption, na paloase ya Saint Jacques des Deux Plateaux, misa esalemaki mpo na kofungola molongo mwa mabondeli mpo na kimya (to boboto) na Côte d¡¯Ivoire. Ekosalema kobanda mokolo mwa zomi na mitano ya sànzà ya augusti (15 août) kino mokolo mwa tukù mibale na mitano ya sànzà ya zomi (25 octobre). Ezali likanisi lya Commission épiscopale Justice, Paix et Environnement.

Pene na sanza misato liboso ya maponomi ya mokambi wa ekolo esalema, makambo ya mopelengano (politiki) ezali kaka makasi, mpamba te, Alassane Ouattara, mokonzi ya sika, alingi kosala mandat ya minei, kasi mpe mpo ete bakonzi ya opposition, lokola Laurent Gbagbo, mokonzi ya kala ya Parti des peuples africains-Côte d¡¯Ivoire (PPA-CI), mpe Tidjane Thiam, mokambi ya Parti démocratique ya Côte d¡¯Ivoire (PDCI), bakimi na liste ya maponami. Bango banso mibale bazwamaki te na maponami mpe basanganaki na sanza ya motoba na kati ya boyokani oyo ebengamaki ¡°Front commun¡±.

¡°Kimya to boboto ezwamaka mpe na nzela ya losambo¡±. Na mokolo mwa libwa (9 août), bankoto ya bato bayanolaki na libyangi ya ba parti mibale ya opposition mpo na kotelemela candidature ya Alassane Ouattara, kasi mpe mpo na kotia lisusu na liste ya ba leaders ya opposition. Na tango ya nkwokoso oyo, Bakristo ya Katoliko ¡°Baepiskopo, basango, basi mpe babali bazali pene ya kobondela to kosambela¡± na boumeli ya baposo zomi, basangani na ¡°Mama wa biso ya boboto, mpo na kosenga Mokonzi kimya to boboto mpo na mboka na biso¡±, elobi Tata Norbert Abekan, Secrétaire exécutif national ya Commission épiscopale Justice, Paix et Environnement. Alobi ete: ¡°Kimya ezwamaka mpe na nzela ya mabondeli to losambo¡±.

Masolo elongo nà Sango Eric-Norbert Abekan

Bokutani mpe masolo

Bapesaki toli: kati na yango, komanyola na makomi ya liturgi, kosambela sapelè, tango ya kogumbamela Sakramento - Esantu, ntango ya komipima bilei soki okoki kosala yango, mpe kosenga misa mpo na ekolo ya Côte d¡¯Ivoire.

«Esengeli kozala na mpiko mpo na kotya kimya koleka mpo na kobunda bitumba. Esengeli kozala na mpiko mpo na koyanola ¡®iyo¡¯ na bokutani kasi na botelemi te; ¡®iyo¡¯ na masolo kasi na mobulu te; ¡®iyo¡¯ na boyokani kasi na kowelana te; ¡®iyo¡¯ na kotosa boyokani kasi na kotumola baninga te; ¡®iyo¡¯ na bosolo kasi na bokosi te».

Maloba ma Papa François oyo ezali koyokana lisusu na eleko eye mpo na Côte d¡¯Ivoire oyo ezalaki na nkwokoso ya mopelengano (politiki) ya 2010-2011 oyo ebengamaki nkwokoso ya nsima ya maponami, oyo ebimaki nsima ya ngala ya mibale ya maponami ya Mokambi ya ekolo ya 2010. Bato soki nkoto misatu (3 000 personnes) babungisaki bomoi bwa bango (bakufaki).

Maponami ya bato banso

Lelomei, ¡°ebundeli ya makasi oyo esengeli kosalela ezali kaka kosolola, kasi mingimingi kosolola na Nzambe na nzela ya losambo (libondeli), na nzela ya sapelé, mpo ¡®te kimya ekoka kotanga lokola ebale to mbu, elobaki Tata Abekan. Misala misusu misalemaki na Commission, bokutani moko esalemaki na bilenge ya ba partis politiques mpo na kotiya masolo. ¡°Tozali kosala ¡®te bandeko mibali mpe bandeko basi básolola, mpamba te, tozali banguna te. Alobi ¡®te politiki esengeli kozala esika ya bitumba soki moke te, kasi esika ya masolo, epai mwinda ekoki kopela.¡± Secrétaire exécutif national ya Commission épiscopale Justice, Paix et Environnement asengi maponami ya bato banso, mpe abakisi ¡®te «kotika bato basusu ba pono, ezali kokabola bato. Esengeli kofungola bikuke (bizibelo) mpo na maponami oyo ezali koya».

Masolo elongo na Sango Eric-Norbert Abekan

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

15 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 09:53