ÐÓMAPµ¼º½

Luka

RD.CONGO: Elilingi elembo (elilingi mpo na ndakisa) RD.CONGO: Elilingi elembo (elilingi mpo na ndakisa)  (AFP or licensors)

RDC: Baeyamba bazwi mokano ya kokende elongo to kopesa lisungi na esaleli ya kimya.

Mpo na ?kozongisa kimya, bomoko ya mboka, kofanda esika moko mpe kokolisa mibeko ya demokrasi o kati ya mboka ya bango?, biyamba bya RDC ebimisaki o mokolo mwa 25 Augusto 2025, molongo mwa makambo maye makolakisa nzela ya ?kobimela na ndenge ya libela na mobulu ya bitumba?. Kati na lisol¨® moko elongo na bapanzi-nsango ya Vatican, Mokomeli Monene ya CENCO, Mgr Donatien Nshole, alobelaki makambo ma sikisiki mataleli myango.

Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Mpo na CENCO, ECC (Eklezia ya Kristo na Congo), plateforme ya mangomba na Congo mpe CIN (Coalition interconfessionnelle pour la Nation), feuille de route enà ezali kolakisa mokano mwa bango ya kosunga mboka na nzela ya boyokani kati na bato.

Mgr Nshole, ya CENCO mpe batindami ya ECC, o mokolo mwa 28 ya sànzàa ya décembe na 2023. Tango Bamangomba ya bakristu  mpe ya biyamba bisusu bayokanaki mpo na bolamu ya kolandela nzela ya masolo o kati na ekolo
Mgr Nshole, ya CENCO mpe batindami ya ECC, o mokolo mwa 28 ya sànzàa ya décembe na 2023. Tango Bamangomba ya bakristu mpe ya biyamba bisusu bayokanaki mpo na bolamu ya kolandela nzela ya masolo o kati na ekolo   (ANSA)

Feuille de route oyo bopesi likanisi, ezwami na makambo manei ya ntina mpenza. Bokoki kolobela yango na bokuse?

Solo, feuille de route ena ezali na biteni banei. Ya liboso ebengami ¡°sanza ya kimya¡±. Yango ezali eteni oyo eyaka liboso ya masolo mpenza. Na boumeli ya likita yango, tokolobela lolenge tokoki kosala na molende na elimo mpe na mosala ya kobatela bampate mpo tótika ezalela ya kozanga kotyelana motema mpe tókóma na ezalela ya kosolola. Na ntango wana, tokokende epai ya bato oyo bazali na matata mingi mpo na komema bango na likanisi ya bondeko. Ezali mpe eleko malamu ya kobanda kosunga mpo na kozwa nzela ya kolendisa bato mpo ¡®te bátyelana motema, mingimingi na nzela ya kofungola miso. Nde yango ekosala ¡®te bato banso báyanganaka na makita. Yango ezali na ntina mingi mpo tolingi kokotisa bato banso kati na lisolo.

Etapi ya mibale etaleli masolo ya bato ya mayele oyo ekolandana na oyo ya bato ya politiki (ya mopelengano). Na etape oyo, tokoluka lisungi ya bato ya mayele ya Congo na makambo ndenge na ndenge, oyo etali bokambi malamu ya nkita, ya bokengi, ya lisanga, mpe bongo na bongo. Mosala ya bato ya mayele esengeli kosalema na ebandeli mpe esengeli kotyama lokola nzela mpo na bato ya mopelengano (politiki) oyo basengeli komipesa na kobongola yango na misala.

Eteni ya misato ekozala na masolo ya politiki mpo na ¡°kokoma na boyokani oyo babengi Pacte social¡±, oyo bato nyonso basengeli kosala makasi mpo na kobatela yango.

Mpe eteni ya minei ezali likita ya mokili mobimba oyo mokano mwa yango ekozala ya kosilisa makambo oyo ekoki te kosilisama na Washington mpe na Doha.

Makambo mingi masalemaki mpo na koluka kimya na RD Congo. Lolenge kani bosalaka ya bino?

Eloko ekesenisi initiative oyo nà misusu ezali ¡®te ezali mosala ya société civile oyo ezali koluka kosangisa bato ya politiki. Na yango, esengeli toyeba ¡®te, awa, ezali te likambo ya kotiya na esika ya liboso mikano ya politiki oyo, mpo na biso, ezali na esika ya liboso te. Likambo ya ntina mingi ezali kopesa bato oyo bayebi makambo mingi ya politiki makanisi, oyo ekozala na motuya mingi mpe ekosala mbongwana monene soki moto ya politiki aluki te kokitisa motema liboso ya bamposa ya moimi, kasi na esika ya kosala bongo, akotalela makambo ma kimya na bokebi bonso.

Mikakatano nini bozali kozela mpo ya kokutana na yango tango bokobanda kosala yango?

Mokakatano monene mozali nde mposa ya bato ya politiki. Na maloba mosusu tokoki koloba ¡®te, ezali komonisa na bosolo, ¡®te moto na moto azali na motema semba ya kotalela makambo na lolenge moko, kotyáká likebi mingi likoló na makambo oyo mazali kosangisa esika moko na esika ya kotya likebi likoló na makambo oyo mazali kokabola biso.

Emonani ¡®te, mposa ya koluka kimya ezali komonana makasi na mboka na bino. Boniboni ezali komonisama o kati ya mboka, mingi mpenza na ngambo ya moniele (Esti) ya ekólo?

Nazali komitungisa na komona ¡®te, atako tolingi kokende liboso mpo na kosolola, makambo ya mpasi mazali kaka kokoba na mabelé. Likambo ya mawa, bitumba ezongeli mpe tozali komitungisa mingi. Tozali kolikya ¡®te moto mwa mopelengano to politiki ya Congo akozala na esengo ya kondima na motema mwango oyo mangomba to biyamba epesi likanisi, mobimisama na ndenge ya malamu mpe na lombango mpo na kopekisa to sukisa  elongi ya bitumba.

Lisolo nà Mgr Donatien Nshole, mokomeli ya Lisàngà lya baepiskopo ya RDCongo, (CENCO),. Lisolo ebongisamaki na lisalisi lya Jean-Paul Kamba, SJ na Engumba ya Vatikan

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

29 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 12:31