RDC: bas¨¤ng? ya Bunia basiliki mpo na mobulu ezali kokoba kokola
Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC
«Tika ete Ngondo Maria, Mokonzi ya boboto, asambela mpo na Dioseze ya Bunia mpe mpo na Républiki» ; yango nde bosénga ya basángó ya Bunia. Balakisi mposa ya bango na kati ya maloba maye: ¡°Mpo na ntina ya Sioni, nakokanga monoko te¡±. Bazali koboya to kofunda makambo ma mobulu mpe ya motema mabe oyo ekomi na nivo ya kobangisa na etuka ya Ituri, esika oyo bazali kobebisa lotomo ya bato, mpo bayebi te kopesa etumbu na baye bazali kosala mabé. «Tozali kotungisama na komona lolenge kani makambo ya bokengi ezali kobeba mikolo miye, kobanda sànzà ya yuli kino sanza ya Augusto ya mobu 2025 na etuka ya Ituri ». Basango ya Bunia basiliki, bazali kosala « mosala mwa bango ya kosakola na mokili mobimba » mpo na kofunda «mpasi oyo ekoki kolimbolama te mpe oyo ezali sembo te, oyo banguna ba boboto (kimya) bazali kopesa na bato ya Ituri.
Likambo ya bokengi ya bato ezali malamu soki moke te.
Likambo lya bokengi to libateli lya bato, na etukà ya Ituri ezali ya kobangisa makasi. O mokolo mwa 21 ya sànzà ya nsambo, batomboki (URDPC/CODECO) bakotaki na minduki na mboka Lopa. Banganga-nzambe balobi ¡®te : tango baleki, na nzela, babebisaki ndakonzambe Saint Jean de Capistran mpe esika mosantu ya Maria; babebisaki ndako ya basángó mpe lopitalo; babomaki basivili, batumbaki bandako; babebisaki basi mpe bana mike mpe mibange.
Na nsima, na butu ya 26 ya yuli mpo na kokende komona mokolo mwa 27 ya yuli, ADF (Forces démocratiques alliées) babundisaki Komanda mpe babomaki bakristu tuku minei (40 chretiens) oyo bazalaki na ndako ya losambo ya paroisse ya Mwa-Esengo Anuarite; bazokisaki bato mingi, bakangaki bilenge koleka tuku minei(40jeunes) mpe bana ya Muvema ya Action Catholique ya Croisade ya Ukaristya,batumbaki bandako mpe mituka. Mpe na butu ya mokolo ya 19 na 20 ya sanza ya mwambe (augusto) ndako ya losambo ya Kizito na Bunia, ekutanaki mpe na mobulu ya minduki, ebimisaki bozangi limemya «ya bilei bisantu, babwakáki yango na mabele».
Bato mingi bazali kolungwa bisika bafandi mpo ya kokende kofanda bisika bisusu
Na ntango ya kwokoso oyo, basángó ya Bunia bamonaki «kozanga makoki ya mampinga ya lingomba» mpe bayokaki mawa mpo na «kotinda ebele ya bato na bisika bisusu mpo na koluka bisika ya kimya». Lisusu, bakebisi na ntina yalikambo« ya kotinda bato na «koyinana mpe na mobulu, bazali kokanela maloba mpe kofinga Eklezia Katolike na nzela ya Radio-Télévision FARDC-Ituri, bazali kokanela na maloba mabé basango». Bazali kokosela bango makambo, tembe te balobi «bazali koyamba basodá ya Convention pour la Révolution Populaire (CRP), botomboki ya sika oyo ezali kobima». Nzoka nde basango bazali kokweisa yango makasi, lokola bazali mpe kokweisa «kozala ya bituluku bisusu ya basodá».
Kókangama na mosala ya kimya
«Tokanisi ¡®te Eklezya ya Katolike esalaka tango inso makasi mpo na boboto, boyokani, kofanda na kimya mpe bokóli bwa nkita, kozanga kokesenisa mposo ya nzoto mpe kosala bokeseni ya bitúlúká». Basango basengi mokolo moko ya losambo mpo na boboto, bakotambola na nzela ya kimya. Mokolo mona mobongisamaki na dioseze ya Bunia na mokolo mwa 22 sanza ya misato ya 2022. Nde na molongo mwa ndakisa enà ya mabondeli mpo na kimya na bisika biye bitumba ezali, Tata Mosantu abengaki na Audience générale ya mokolo mwa misato mwa 20 ya sànzà ya augusto, mpo na kokila (komipima) bilei mpe kobondela mpo na kimya na mokili mobimba.
Toboya mosala ya kokotisa boyinani
Basango ya Bunia «bazali kokweisa makasi bato banso oyo bazali kofinga, na keto o motema, ekotinda na koyina, Eklezia katolike ya Bunia mpe bazali kobundisa yango mpo bakanga yango monoko, bongo bakoba na misala mya bango ya mbindo». Bazali mpe kofunda «complicité criminelle kati na ba FARDC na ba CODECO, moko na ba groupes armés lokola FRPI, FPIC, CHINI YA TUNA, MAPI, AUTODEFENSE, CRP, JAMUKULABATU, ADF/NALU, MAIMAL, oyo esengeli etongama na Etat de siège»
Etat de siège oyo ezali na elonga te
Bamoni ¡®te Etat de siège elongi te, nsima ya mbula minei ya kosalela yango, ememeli bato libateli te mpe emonani lokola ¡®te bokonzi ya Leta bazalaka lisusu te. Na kati ya état de siège, balobi ¡®te, «bituluku ya basimba-minduki ezali kaka kobakisama mpampa te, kasi ezali lisusu kobakisa bato makasi mpe kobakisa minduki». Likambo ya mabe koleka, balobi , ezali ¡®te manso mazali kozalema na ntango ya bokonzi boye, «bazali koboma ebele ya basivili mpe kobebisa biloko ba bango ; bazali kokunda bato bazali nayino na bomoi, bazali koboma bato na bisika biye bato oyo bakimá mboka bakendaki kofanda, mpe na bamboka, bakangaki bato, babomaki bato na kati ya engumba Bunia, mpe bato bazali kozanga libateli na banzela».
Kozanga kolónga ya MONUSCO
Ut¡¯o mibù tukù mibale na mitano, Monusco, ezali na Ituri. Ezalaki na mokumba ya kobatela basivili. Kasi ezali kosala lokola ¡°moto oyo azali kotala na ntango ya bitumba mpe ekotaka kaka nsima mpo na komona mpe kokoma makambo¡±, ba sango balobi, kobenda mp ona komona ¡°makanisi ya bato ya mboka mpe ya mokili mobimba na makambo ya mawa oyo ezali kosalema na Ituri¡±.
Mwa malako
Na kati ya ba malako misusu, basengi na mbulamatari ya Congo ¡®te «aboya politiki ya «kokabola mpo na koyangela malamu» mpo na ko salela bankita to mabanga mantala ya mabele ya Ituri. Basengi ¡®te alongola mbala moko état de siège oyo ezali kaka kobakisa mabe na Ituri, mpo ¡®te «ezali polele mpe na bokasi mingi mpo na kokweisa mibeko ya kimia, oyo ezalaki etinda (mission) ya ye ya yambo». Na bokonzi ya kosambisa, basengi ¡®te «basala mosala ya koluka luka bosolo mpo na kokanga mpe kosambisa bato oyo basali mbeba na Ituri». Basango basengi na bituluku ya basimba-minduki ¡®te batika minduki ba bango, mpe bayoka bosenga ya bato banso, mpo ¡®te «baleka na nzela ya masolo mpo na kimya ya libela mpe boyokani ya bato. Lokola esengaki lisanga lya ba epeiskopo ya Congo CENCO mpe ECCC, mpo na «Kimya ekoùmela mpe bozalani elongo ya malamu na RDC».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.