Na mokolo mwa 15 ya Augusto na Eklezya ya Ortodokse: Bokundami (Dormition) bwa Ngondo Maria
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
Pape Léon XIV akosala misa na Castel Gandolfo o mokolo mwa mitano na tongo, 15 août na molulu mwa Assomption, ntombwà ya Maria o likolo, amemi nzoto mpe molimo mwa ye epai ya Mwana wa ye Yesu. Na Eklezya ya Ortodokse, bakokundola, mokolo moko, kolala ya Mama wa Nzambe, liwa ya boboto ya Maria. Bokeseni bona, oyo ezali mpenza kokangisa Maria elongo nà bawei, emonisami polele kati na bililingi ya bokristo.
Bamonisi ntombwa na elilingi ya Ngondo, oyo atombwami na nzoto mpe na molimo mwa ye na likoló. Na ezalela ya bonkoko ya eklezya ya Ortodokse, Mama wa Nzambe azali na mbeto na ye ya liwa, bantoma bazingi ye, mpe Kristo azwi molimo mwa ye, oyo ezali lokola mwana oyo abotami sika. Makambo maye malekaki na nsuka ya bomoi bwa Maria, Biblia elobeli yango te. Kasi, elobami na makomi mosusu ya apocryphe eùti na ekeke ya motoba (VI siècle). Nzokandé tozali kosepela mibù 1700 ya likita ya Nicée, libaku ya kokanisa na ntina ya nzela ya bosangisi ya mangomba (oeucumenisme), lisolo ya bakomi na biso etaleli bokundoli kolala ya Maria, yoko likanisi ya eklezya ya Ortodokse, na lisalisi ya Métropolite Emmanuel ya Chalcédoine.
Likanisi linà lilekaki lokola lisolo elongo na métropolite Emmanuel de Chalcédoine. Masolo ma bango elimboli bokokani ya bokundoli milùlù mya ntomwa ya Maria o likolo oyo eklezya ya Katoliko ekosepelaka o mokolo mwa 15 aout, mpe milùlù ya bolali bwa Maria, oyo ba Ortodokse bakosepela sé na mokolo monà.
Lolenge kani bakosepela Bolali (Dormition) ya Maria na eklezya ya ba Ortodokse ?
Mikolo zomi na mitano ya liboso ya sanza ya Augusto, ezalaka eleko ya kokila (komipima) bilei, mpe bato baboyaka kolya misuni, mbisi, mpe biloko oyo esalemi na miliki. Na yango, mbala mingi tobéngaka yango Pasika ya eleko ya molungé. Ezali eyenga moko ya ntina mingi mpenza oyo ekozwa sanza mobimba ya mwambe, mpamba te tokosukisa feti ya Elambo (Dormition) na mokolo mwa 23 ya sànzà ya mwambe. Na eklezya ya Ortodokse, basambelaka mpenza Maria. Nakanisi ¡®te tozali na makambo mingi oyo ekokani na ezaleli ya bonkoko ya eklezya ya Katoliko.
Ndimbola ya Bolali (Dormition) mpo na bakristi ya Ortodokse
Moto nyonso akoki kokufa. Kasi, bato banso bakoki mpe kosekwa na nzela ya Kristo, oyo asukaki kaka te na liwà, kasi azongaki lisusu na bomoi, na bomoi bwa seko. Mpo na biso, ezali eyenga tokosepela na esengo, mpe ezali elembo ya elikya, mpamba te ezali bomoi ya seko oyo Nzambe alaki. Maria, mama wa Nzambe, azali na esika ya ntina mingi na kati eklezya ya Ortodokse. Alobi, soki okoti na moko ya bandako ya Nzambe na biso, okomona kaka Kristo na ngambo moko, mpe na ngambo mosusu, Ngondo Maria elongo na mwana Kristo na maboko ma ye. Yango ezali kokanisa biso ¡®te Ngondo azalaka tango inso elongo na Kristo. Maria amonisaki botosi mpe apesaki ndakisa ya bomoi ya bokristo ya solo.
Bolali mpe ntombwà ya Maria, ezali elembo ya boyokani kati na Bakatolike mpe Ba-Orthodoxe?
Iyo. Ezali sé lolenge wana, mpe ezali na ntembe te. Bongo, ezali na ntina mingi lokola tozali kokundola mibu minkàmà zomi na sambo (17è centenaire) ya likita ya Nicée oyo epesaki biso bondimi moko, mpe elobamaki ¡®te Kristu abotamaki na ngondo Maria mpe akomi moto. Ya mibale, mpo na eklezya ya Katoliko, solo mpenza na yebi ¡®te esengelaki tango moko boye kokómisa Ntómbwa ya Maria Dogme (liteya) oyo Pape Pie XII nde alobaki na 1950). Mpo na biso, ezalaki na ntina ya koloba te. Mpamba te, tomoni ¡®te yango ezalaki vocation (mosala) ya Maria. Eloko tosengeli kokanga to kobosana te, ezali ¡®te ezali bokeseni te, kasi ezali nde kokundola ya mokolo se moko, mokolo moye mwa ntina ya 15 Augústo. Ezala mokolo ya Kolala (Dormition) ya Maria to mokolo mwa ntombwa (Assomption) ya yé o likoló.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.