Na ekolo ya Pologne, Basi basali mobembo na sanctuaire ya Piekary
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
«Bosala ¡®te elongi ya Nzambe emonana bobele polele o kati ya bomoi bwa balingami ba bino mpe baye banso bozali kokutana na bango». Wana nde mbelà Mgr Antonio Guido FiliPazzi abwakaki, o mokolo mwa lomingo mwa zomi na sambo ya sànzà ya Augusto (17 aout). Azalaki kolobela lotùkà ya bankoto ya basi mpe bilenge basi biye biyaki na mobembo mwa mobù, na mboka Pierkary Slaskie. Ezali sanctuaire ya mama Maria na Silésie na ekolo ya Pologne. Mobembo monà mobendi basi baiké na bilenge basi ya ekolo ya Pologne mobimba mpe ya bikolo ya nzinga-nzinga. Mingi balataki bilamba folkoriki me ba iniforme ya misala.
Mibù monkàma ya dioseze ya Katowice
Na mobù moye, dioseze ya Katowice ekokisi bongo mibù nkàmà moko ya bobandisi bwa yango. Ezali lolenge yoko kokundola bolatisi ekoti ya lokùmu ya ekeko ya Notre-Dame ya Piekary oyo esalaka makamwisi. Ekeko enà eyebani mingi na kombo ya Notre-Dame ya Justice mpe ya Amour social. Pàpa Léon ya zomi na minei (Pape Léon XIV), apesaki mbote na basangani, na sima ya losambo la Angelus ya lomingo na Castel Gandolfo; mpe apesaki bobenisi bwa yé na baye banso basalaki mobembo.
Kosambela mpo ya Pàpa
Mgr Filipazzi alendisaki bato bamobembo mpe basi na kosambela mpo na mokitani mwa Santu Petro. Abakisaki na koloba ¡®te Maria azali moteyi to molakisi mwa elikya. Asengaki na basangani ya mobembo bazala ¡°ba missionele ya elikya ya bokristu¡±, mpo ya mabota ma bango. Basala ¡®te bozalisi bwa Nzambe bomonisama o bomoi bwa bango ya mokolo na mokolo. Mgr Marek Szkud?o, episkopo mosalisi ya Katowice, alobelaki mosàla basi basàlaka o kati ya societe, atako emonanaka mpenza na miso te, kasi atangi bango ¡°basakoli ya bosolo mpe ya bolingo¡± mpe ¡°bakambi ya pete, kasi batonda na bokasi¡±. Alendisaki basi na koloba, kosunga baninga mpe kokomisa mitema mya bango esika epai wapi mokili mokozwa boboto, oyo ya mobulu te kasi na lisalisi ya bozalisi bwa bango.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.