ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Na kati ya mib¨´ 2008 mpe 2023, motango ya bato oyo batekami na mokili mobimba emataki mbala minei Na kati ya mib¨´ 2008 mpe 2023, motango ya bato oyo batekami na mokili mobimba emataki mbala minei 

Mombongo ya bato: Caritas Vietnam esengi kobatela mabota mya mikolo mikoya

Lokola Vietnam ezali moko ya bikolo biye bizali na motango monene ya bato basalelaka ba r¨¦seaux sociaux, Caritas azali kosala makasi mpo na kopekisa ba cas ya sika (basusu b¨¢zwa mak¨¤m¨¤ myango) na nzela ya kopesa toli na bilenge ya ba dioseze.

Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Na kati ya mibù 2008 mpe 2023, motango ya bato oyo batekami na mokili mobimba emataki mbala minei, longwa na bato 30 000 kino pene ya bato 134 000, na kolanda lapolo moko oyo Statista ebimisaki na sanza ya yuni ya mbula eleki. Ndako ya bopanzi nsango, Fides, eyebisi ¡®te: ekolo ya Vietnam ezali moko na mikili epai wapi kuna bokóli monene ya makambo manà ezali komonana mingi mpenza. Lelomei, bato oyo batekaka bato bazali lisusu na mposa te ya kokutana na bato oyo bazali koteka bango mpo na kobenda bango mpe kokosa bango.

Basite ya kosolola nà bato na Internet ekómi ¡°esika malamu¡± mpo na bato mabe. Kokosa to koyiba batoa (escroqueries) na internet etindaki bato ya ekolo ya Vietnam mingi bakende kofanda na ba mboka ya pembeni lokola Cambodge, Laos, Birmanie mpe Chine, oyo ebimisaki nkwokoso na mboka mpe mikakatano ya makasi na bomoi ya bato.

Kobatela mabota miye mikoya

Mamelo Teresa Pham Ninh Khanh Hau, ya Caritas ya dioseze ya Hung Hoa, akutanaki na bilenge koleka mokama (100 jeunes) mpo na koteya bango ndenge ya koyeba ba lokuta (escroqueries) mpe ndenge ya koyeba likambo ya koteka bato. Mpe na paloase ya Tien Non, etuka moko ya mboka oyo ezali naino kosala bilanga ya loso, boyebi na ntina ya bobateli na mibembo mpe mombongo na bato ezali moke mpo na bozangi kokota ya mayebisi.

Caritas Hue na Vietnam azali kopesa toli mpe bansango ya malamu na nzela ya komite mpo na kopekisa mibembo ya makama mpe mombongo ya bato, na kotya likebi mingi na kobundisa bansango ya lokuta oyo ezali koleka mingi na internet.

Engebene na Ministère ya Sécurité publique, mikolo mileki, ba-Vietnam batalelaki bankama ya ba cas ya ba escroqueries na internet oyo ememaki na mombongo ya bato. Basalisaki bato mingi oyo bazalaki na likama, mpe bapekisaki bato oyo bazalaki koteka bato na mboka na bango mpe na mikili misusu.

Mombongo ya bato,  lapolo la sika ya Talitha Kum ebimi
Mombongo ya bato, lapolo la sika ya Talitha Kum ebimi   (M. Mastrandrea / Talitha Kum)

Kosala mpo na kobongola makambo

Kaka na 2024, ba cas 163 ya koteka bato emonanaki mpe ba enquêtes ya ba forces ya mibeko, mpe na kati ya sanza ya yanuali ya 2025, ba cas 120 ezwamaki. Na 73% ya bato ba bazali na ba réseaux sociaux, Vietnam ezali moko ya bikolo oyo ezali na motango ya bato ebele oyo basalelaka internet mpe ba réseaux sociaux, koleka 72 millions ya bato.

Fides elobi ¡®te 17% ya bato oyo basalelaka site yango bazali na mbula zomi na misato kino tukù mibale na minei (13à 24 ans). Na kati ya bana milio 24,7 oyo bazali na Vietnam, pene na 97% na bango balekisaka ngonga 5 to 7 na Internet mokolo na mokolo. Lokola bazali na toli ya malamu te mpe bayebi makambo manso te, bilenge biye bazali na likama monene ya kokosama na nzela ya Internet mpe ya boteki bato na mokili oyo ezali se kokóma na basite mingi ya kosolola na bato.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

 

12 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 09:34